Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II SAMUEL
Prev Up Next
Chapter 17
II S LinVB 17:1  Akitofel alobi na Absalom : « Tika ngai napono basoda nko­to zomi na ibale, nakende kolanda Davidi bobele na butu boye.
II S LinVB 17:2  Nakozwa ye ntango akobanda kolembe mpe mpiko ya ye ekosila. Nakoyokisa ye nsomo o motema mpe bato ba ye banso bakokima ; bongo nakobete mokonzi ntango akozala se ye moko.
II S LinVB 17:3  Nakosala ’te bato banso ba­zonga epai ya yo ; lokola mwasi azongi epai ya mobali, osengeli ko­zwa se moto moko, mpe bato banso bakobika. »
II S LinVB 17:4  Maloba mana masepelisi Absalom na bakolo banso ba Israel.
II S LinVB 17:5  Nzokande Absalom alobi : « Benga Kusai, moto wa Arka, toyoka mpe maloba ye akoloba. »
II S LinVB 17:6  Kusai akomi epai ya Absalom, mpe Absalom alobi na ye : « Akitofel alobaki na biso bo­ngo ; tosengeli nde kosala lokola alobaki ? Soki te, loba yo moko. »
II S LinVB 17:7  Kusai ayanoli Absalom : « Mbala eye Akitofel apesaki lilako lilamu te. »
II S LinVB 17:8  Kusai akobi lisolo, alobi : « Yo moko oyebi tata wa yo na bato ba ye ; bazali bilombe mpe bazali na nkanda lokola nkoi eye babotoli bana ba ye. Tata wa yo azali moto wa bitumba ; na butu boye akondima te ’te bato ba ye balala.
II S LinVB 17:9  Sikawa azali kobombama o mobenga to epai esusu. Bongo, soko o kati ya biso bato basusu babandi kokufa, ekoyebana noki na bato ba biso, mpe bakoloba : ‘O kati ya bato balandi Absalom bato basusu bakufi.’
II S LinVB 17:10  Bongo ata mobali azali na motema makasi lokola ntambwe, mpiko ya ye ekosila, mpo ba-Israel banso bayebi ’te tata wa yo azali elombe mpe baninga ba ye bazali bato ba mpiko.
II S LinVB 17:11  Ya­ngo wana, napesi yo lilako liye : Bato banso ba Israel, banda Dan tee Berseba, basangana pene na yo, baya ebele, lokola mbuma ya zelo o libo­ngo lya mbu ; yo moko otambola o kati ya bango.
II S LinVB 17:12  Tokozwa ye, ata akei kofanda wapi. Tokokwela ye o nzoto lokola mamio makokweyaka o mabelé ; mpe tokotika moto moko na bomoi te.
II S LinVB 17:13  Soko akimi o mboka, ba-Israel banso bakoya na mikulu mpe tokobenda ndako inso tee o moluka, ata libanga lyoko likotikala te. »
II S LinVB 17:14  Absalom na ba-Israel banso balobi : « Lilako Kusai apesi biso, lileki lilako lya Akitofel na bolamu. » Yawe akanaki kobebisa lilako lya Akitofel, ata lilekaki na bolamu, mpo ’te Absalom ayoka mpasi.
II S LinVB 17:15  Kusai alobi na banganga Nzambe Sadok na Ebiatar : « Akitofel apesi Ab­salom na bakolo ba Israel malako ndenge na ndenge ; kasi ngai napesi ye lilako liye.
II S LinVB 17:16  Sikawa bokende noki koyebisa Davidi mpe boloba na ye : Na butu boye otikala o eliki te, kasi kende liboso ; soki te, bakoboma mokonzi na bato ba ye banso. »
II S LinVB 17:17  Yonatan na Akimas bazalaki kozila penepene na liziba lya Mosukoli bilamba. Mwasi moko atindami mpo ’te ayebisa bango, nsima bango base­ngeli koyebisa mokonzi Davidi, za­mbi bakoki komimonisa te ntango bakokoto o mboka.
II S LinVB 17:18  Kasi elenge mo­bali amoni bango mpe ayebisi Absalom likambo lina. Bango babale bakei mbangu mpe bakomi o ndako ya moto moko wa Bakurim. Libulu lizalaki kuna o lopango, mpe bango bakiti o kati.
II S LinVB 17:19  Mama nkolo wa ndako akamati elamba ya ema, atandi ya­ngo likolo lya libulu lya mai. Atii mbuma ya ma­mpa likolo, mpo ’te bato bamono te.
II S LinVB 17:20  Basaleli ba Absalom bakoti o nda­ko ya mwasi mpe batuni ye : « Wapi Akimas na Yonatan ? » Mwasi ayanoli bango : « Basili bakatisi mai. » Bango baluki se koluka, bazwi moto te, bo­ngo bazongi o Yeruzalem.
II S LinVB 17:21  Awa ba­ngo bakei, Akimas na Yonatan babimi o libulu mpe bakei koyebisa Davidi, balobi : « Kende noki, katisa mai, za­mbi Akitofel apesi malako maike mpo ya kokanga yo. »
II S LinVB 17:22  Davidi na bato ba ye banso bakei mpe bakatisi Yordane. Na ntongo bato banso basili kokatisa Yordane.
II S LinVB 17:23  Emoni Akitofel ’te balandaki lilako lya ye te, abongisi mpunda ya ye, azongi o mboka, o ndako ya ye. Abo­ngisi makambo manso ma ndako ya ye, mpe amitii nsinga o nkingo, amibomi. Nsima bakundi ye o lilita lya tata wa ye.
II S LinVB 17:24  O ntango Absalom na ba-Israel ba­nso bazalaki kokatisa Yordane, Davidi asili akomi o Makanaim.
II S LinVB 17:25  Absalom atiaki Amasa komanda wa basoda banso o esika ya Yoab. Amasa azalaki mwana wa Yitra, moto wa Ismael, oyo abalaki Abigayil, mwana wa Yese mpe ndeko wa Seruya, mama wa Yoab.
II S LinVB 17:26  Bato ba Israel na Absalom bapiki nganda o mokili mwa Galaad.
II S LinVB 17:27  Ekomi Davidi o Makanaim, Sobi, mwana wa Nakas, moto wa Raba, mbo­ka ya ba-Amon, na Makir, mwana wa Amiel wa Lo-Debar, na Barzilai, moto wa Roglim o Galaad,
II S LinVB 17:28  bayei na matoko, mbeto, kopo, nzungu na mpe mbuma ya mampa na loso, fufu, mbuma ya mampa bakalingi, ma­desu na ndunda,
II S LinVB 17:29  mafuta ma nzoi, manteka na misuni mya mpata mpe mya ngombe ; bayei na yango mpo ya koleisa Davidi na bato ba ye, zambi balobanaki : « Basoda bayokaki mpasi na nzala, balembeki o nzela mpe bayokaki mposa ya mai o eliki. »