Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Prev Up Next
Chapter 30
Numb LinVB 30:1  Moze alobi na bana ba Israel maloba manso Yawe atindaki ye.
Numb LinVB 30:2  Moze alobi na bankumu ba mabota ma Israel : « Boyoka mibeko Yawe atindaki :
Numb LinVB 30:3  Soko mobali moko alakeli Yawe elako to alayi ndai ’te akomipesa mo­sa­la, moto oyo akoki kobongola malo­ba ma ye te, zambi asengeli kokokisa maloba manso mabimaki o monoko mwa ye.
Numb LinVB 30:4  Elenge mwasi, oyo abali naino te mpe afandi o ndako ya tata wa ye, soko alakeli Yawe elako to alayi ndai ’te akomipesa mosala,
Numb LinVB 30:5  mpe tata wa ye ayoki ’te mwana wa ye alaki elako to alayi ndai ’te akomipesa mosala, kasi ayebisi ye eloko te, mwasi oyo ase­ngeli kokokisa elako mpe ndai alayaki, ata tata wa ye alobi na ye eloko te.
Numb LinVB 30:6  Kasi soko tata wa ye awa ayoki li­ka­mbo lya elako to lya ndai, aboyi ko­ndi­ma yango, elako na ndai ya ye iko­mi mpamba. Yawe akotuna ye te, za­mbi tata wa ye aboyi kondima ya­ngo.
Numb LinVB 30:7  Soko elenge mwasi oyo alakaki elako to alayaki ndai, kasi akanisaki malamu te, na nsima abali,
Numb LinVB 30:8  mobali ayoki mpo yango, kasi alobi eloko te, mwasi asengeli kokokisa elako na ndai ya ye.
Numb LinVB 30:9  Nzokande, soko mobali ayoki likambo lina kasi aboyi kondima yango, mwasi asengeli kokokisa elako to ndai ya ye te, eye ebimaki o monoko na bokebi te. Yawe akotala yango mpamba.
Numb LinVB 30:10  Mwasi akufeli mobali to aboyami na mobali, soko alaki elako to alayi ndai, asengeli kokokisa yango.
Numb LinVB 30:11  Soko mwasi alayi ndai to alaki elako o ndako ya mobali wa ye,
Numb LinVB 30:12  awa mobali ayoki yango mpe alobi eloko te to apekisi ye te, mwasi asengeli kokokisa ndai to elako ya ye, ata ya moti­ndo nini.
Numb LinVB 30:13  Kasi soko mobali wa ye, awa ayoki yango mpe aboyi kondima ya­ngo, maloba manso mabimaki o monoko mwa mwasi mazali na ntina te, ezala elako to ndai. Awa mobali wa ye aboyi kondima yango, Yawe akotala yango mpamba.
Numb LinVB 30:14  Elako to ndai inso ya mwasi, mobali wa ye akoki kondima to kopekisa.
Numb LinVB 30:15  Soko o mokolo mwa nsima mobali wa ye alobi eloko te, elakisi ’te andimi elako to ndai ya ye, ata ya motindo nini. Andimi yango soko o mokolo ayoki yango alobi eloko te.
Numb LinVB 30:16  Kasi soko ayoki yango mpe andimi yango te se nsima ya mikolo, ye moto akomeme ngambo o esika ya mwasi wa ye.
Numb LinVB 30:17  Tala mibeko Yawe atindi mitali mo­bali na mwasi wa ye, to tata na mwana mwasi wa ye, ntango azali naino elenge mpe afandi o ndako ya tata wa ye. »