PROVERBS
Chapter 27
Prov | LinVB | 27:1 | Osepela naino na makambo ma lobi te : oyebi te soko mokolo mwa lelo mokoyela yo nini. | |
Prov | LinVB | 27:3 | Libanga lizali bozito, zelo lizali kilo, kasi nkanda eye moto zoba akoyokisaka eleki bozito. | |
Prov | LinVB | 27:7 | Moto atondi biloko akoboya ata mafuta ma nzoi, moto akufi na nzala akoyoka biloko bya bololo elengi. | |
Prov | LinVB | 27:8 | Moto akei koyengayenga mosika na mboka ya ye, azali lokola ndeke etiki zumbu lya yango mosika. | |
Prov | LinVB | 27:10 | Otika moninga wa yo te, moninga wa tata wa yo mpe te ; soko okomi na mpasi, okende epai ya ndeko te, mpamba te, moninga wa penepene aleki ndeko oyo azali mosika. | |
Prov | LinVB | 27:11 | Zala na mayele, mwana wa ngai, mpe sepelisa motema mwa ngai, bongo nakoka kopesa moto atumoli ngai eyano. | |
Prov | LinVB | 27:12 | Soko moto wa mayele amoni likama akomibomba, kasi baye bazangi mayele bakoleka mpe bakoyoka mpasi. | |
Prov | LinVB | 27:13 | Botolo elamba ya ye, zambi amitii ndanga mpo ya mompaya, kamata ye bo ndanga o esika ya moto mosusu. | |
Prov | LinVB | 27:14 | Soko opesi moninga mbote na makeléle na nta ntongo, ekomonono lokola obeteli ye mobondo. | |
Prov | LinVB | 27:18 | Oyo akobatelaka nzete ya ye ya figi, akolia mbuma ya yango, oyo akokengeleke nkolo wa ye malamu, akozwa lokumu. | |
Prov | LinVB | 27:19 | Lokola moto akoki komono elongi ya ye o mai, se bongo moto atali baninga, akoyeba motema mwa ye moko. | |
Prov | LinVB | 27:20 | Mboka ya bawa mpe bozindo bwa nse ikotondaka te, se bongo miso ma bato makotondaka na botali te. | |
Prov | LinVB | 27:21 | Bakopetolaka palata o mbeki, mpe wolo o fulu, se bongo bakoyeba moto na ndenge bakokumisaka ye. | |
Prov | LinVB | 27:23 | Yebaka malamu ndenge ngombe ya yo izali, mpe talaka etonga ya bibwele bya yo malamu ; | |
Prov | LinVB | 27:25 | Soko okati matiti, matiti ma sika makobima, o ntango ena kongolo matiti makauki o ngomba ; | |
Prov | LinVB | 27:26 | zala na bana mpata mpo ya komilatisa elamba, mpe na ntaba babali mpo ya kosomba elanga ; | |