Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next
Chapter 12
Prov LinVB 12:1  Moto andimi botosi alingi bwanya, oyo alingi te ’te bapalela ye azali zoba.
Prov LinVB 12:2  Yawe akondimelaka moto malamu, kasi akokitisa moto wa mayele mabe o likambo.
Prov LinVB 12:3  Mabe moto akosalaka makobongela ye te, kasi minsisa mya bato balamu mikoteleme ngbi.
Prov LinVB 12:4  Mwasi wa motema mpiko azali lokumu la mobali wa ye, kasi mwasi alongobani te azali lokola monkuwa mopoli.
Prov LinVB 12:5  Bato balamu bakokánaka se kosala mambi ma bosembo, bato babe bakokánaka se kokosa baninga.
Prov LinVB 12:6  Maloba ma bato babe mazali mitambo mya liwa, kasi monoko mwa bato balamu mokobikisa bango.
Prov LinVB 12:7  Bakokweisa bato babe, bakozala lisusu te, kasi ndako ya basemba ekoteleme seko.
Prov LinVB 12:8  Bakokumisaka moto mpo ya bwanya bwa ye, mpe bakokinolaka moto wa motema mabe.
Prov LinVB 12:9  Moto moke, kasi azali na mosali wa ye, aleki moto akomikumisaka, kasi azangi mampa ma kolia.
Prov LinVB 12:10  Moto semba ayebi biloko bisengeli na nyama ya ye, kasi moto mabe akoyokelaka yango mawa te.
Prov LinVB 12:11  Moto akokataka bilanga akotonda na mampa, oyo akolandaka makambo ma mpamba, azangi mayele.
Prov LinVB 12:12  Mambi mosumuki akolulaka makokomela bato babe motambo, kasi molende mwa basemba mozali na litomba.
Prov LinVB 12:13  Mbebu ya bato babe ikotiela bango motambo, kasi moto semba akokima makambo ma mpasi.
Prov LinVB 12:14  Moto akozwa bolamu mpo ya maloba ma ye, mpe moto na moto akozwa lifuta engebene na mosala mwa ye.
Prov LinVB 12:15  Moto zoba akanisi ’te ezalela ya ye ebongi, kasi oyo akoyoka malako ma bato, azali na bwanya.
Prov LinVB 12:16  Moto zoba akolakisa nkanda ya ye noki, kasi moto wa bokebi akokanga monoko ntango batumoli ye.
Prov LinVB 12:17  Nzeneneke wa solo akoloba mambi ma bosembo, nzeneneke wa lokuta akokosa se bokosi.
Prov LinVB 12:18  Moto apusi koloba mingi, akozokisa lokola mopanga, kasi maloba ma bato ba bwanya makobikisa.
Prov LinVB 12:19  Maloba ma bosolo makoumela seko, kasi maloba ma lokuta makoumela se mwa moke.
Prov LinVB 12:20  Motema mwa moto akani kosala mabe motondi na bokosi, kasi baye bakopesaka malako malamu bazali na esengo.
Prov LinVB 12:21  Moto semba akoyoka mpasi mokolo moko te, kasi bato babe bakoyoka malozi ntango inso.
Prov LinVB 12:22  Yawe akoboyaka monoko mwa lokuta, kasi alingi bato bakolobaka makambo ma bosolo.
Prov LinVB 12:23  Moto wa bokebi akobombaka makambo ayebi, moto zoba akobimisaka bozoba bwa ye o libanda.
Prov LinVB 12:24  Bato bayebi mosala mwa maboko, bakokoma bakonzi, moto goigoi o mosala, akokoma mongamba.
Prov LinVB 12:25  Mawa o motema makolembisa moto, kasi liloba lilobami na boboto likosepelisa ye.
Prov LinVB 12:26  Moto semba akolakisa moninga nzela, kasi ezalela ya bato babe ekobungisa bato nzela.
Prov LinVB 12:27  Moto goigoi azangi ata nyama ya kokalinga, kasi moto alingi mosala akozanga nkita ya solo te.
Prov LinVB 12:28  Okozwa bomoi se o nzela ya bosembo, moto alandi nzela ena akobika o liwa.