PROVERBS
Chapter 12
Prov | LinVB | 12:3 | Mabe moto akosalaka makobongela ye te, kasi minsisa mya bato balamu mikoteleme ngbi. | |
Prov | LinVB | 12:4 | Mwasi wa motema mpiko azali lokumu la mobali wa ye, kasi mwasi alongobani te azali lokola monkuwa mopoli. | |
Prov | LinVB | 12:5 | Bato balamu bakokánaka se kosala mambi ma bosembo, bato babe bakokánaka se kokosa baninga. | |
Prov | LinVB | 12:6 | Maloba ma bato babe mazali mitambo mya liwa, kasi monoko mwa bato balamu mokobikisa bango. | |
Prov | LinVB | 12:9 | Moto moke, kasi azali na mosali wa ye, aleki moto akomikumisaka, kasi azangi mampa ma kolia. | |
Prov | LinVB | 12:10 | Moto semba ayebi biloko bisengeli na nyama ya ye, kasi moto mabe akoyokelaka yango mawa te. | |
Prov | LinVB | 12:11 | Moto akokataka bilanga akotonda na mampa, oyo akolandaka makambo ma mpamba, azangi mayele. | |
Prov | LinVB | 12:12 | Mambi mosumuki akolulaka makokomela bato babe motambo, kasi molende mwa basemba mozali na litomba. | |
Prov | LinVB | 12:13 | Mbebu ya bato babe ikotiela bango motambo, kasi moto semba akokima makambo ma mpasi. | |
Prov | LinVB | 12:14 | Moto akozwa bolamu mpo ya maloba ma ye, mpe moto na moto akozwa lifuta engebene na mosala mwa ye. | |
Prov | LinVB | 12:15 | Moto zoba akanisi ’te ezalela ya ye ebongi, kasi oyo akoyoka malako ma bato, azali na bwanya. | |
Prov | LinVB | 12:16 | Moto zoba akolakisa nkanda ya ye noki, kasi moto wa bokebi akokanga monoko ntango batumoli ye. | |
Prov | LinVB | 12:18 | Moto apusi koloba mingi, akozokisa lokola mopanga, kasi maloba ma bato ba bwanya makobikisa. | |
Prov | LinVB | 12:20 | Motema mwa moto akani kosala mabe motondi na bokosi, kasi baye bakopesaka malako malamu bazali na esengo. | |
Prov | LinVB | 12:21 | Moto semba akoyoka mpasi mokolo moko te, kasi bato babe bakoyoka malozi ntango inso. | |
Prov | LinVB | 12:23 | Moto wa bokebi akobombaka makambo ayebi, moto zoba akobimisaka bozoba bwa ye o libanda. | |
Prov | LinVB | 12:24 | Bato bayebi mosala mwa maboko, bakokoma bakonzi, moto goigoi o mosala, akokoma mongamba. | |
Prov | LinVB | 12:26 | Moto semba akolakisa moninga nzela, kasi ezalela ya bato babe ekobungisa bato nzela. | |
Prov | LinVB | 12:27 | Moto goigoi azangi ata nyama ya kokalinga, kasi moto alingi mosala akozanga nkita ya solo te. | |