PROVERBS
Chapter 15
| Prov | LinVB | 15:2 | Maloba ma bato ba bwanya makoyokisaka mposa ya koyekola, kasi monoko mwa bazoba mokosopaka se bolema. | |
| Prov | LinVB | 15:5 | Moto zoba akokinolaka makebisi ma tata wa ye, oyo akondimaka malako azali moto wa mayele. | |
| Prov | LinVB | 15:6 | Ndako ya moto wa bosembo ezali na nkita enene, kasi nkita ya moto mabe ekokitisa ye motema te. | |
| Prov | LinVB | 15:7 | Maloba ma moto wa bwanya makoteyaka bato baike, kasi bakoki kotia mitema na makanisi ma bazoba te. | |
| Prov | LinVB | 15:8 | Mabonza ma bato babe makoyokisa Yawe nsomo, kasi losambo la basemba lokosepelisa Ye. | |
| Prov | LinVB | 15:11 | Yawe akomonoko mboka ya bawa na bozindo bwa yango, leka yango, akomonoko makanisi o mitema mya bato ! | |
| Prov | LinVB | 15:12 | Moto akosekeke baninga alingi te ’te bapalela ye, yango wana akokimaka bato ba bwanya. | |
| Prov | LinVB | 15:14 | Motema mwa moto wa mayele mokoluka boyebi, kasi monoko mwa bazoba mokomele se bolema. | |
| Prov | LinVB | 15:15 | Moto wa mawa azali na mawa mikolo minso, kasi moto wa motema esengo akosepelaka ntango inso. | |
| Prov | LinVB | 15:16 | Malamu ozala na mbongo mingi te, kasi obanga Yawe, mabe soko ozali na nkita enene, kasi motema likolo. | |
| Prov | LinVB | 15:17 | Kolia mwa ndunda o esika bolingi bozali, ezali esengo, kolia ngombe mafuta o esika bakoyinanaka, eleki mabe. | |
| Prov | LinVB | 15:22 | Mikano miye omanyoli malamu te, okokokisa myango te, mikobongo mpo ya malako ma bato baike. | |
| Prov | LinVB | 15:24 | Moto wa mayele akolandaka nzela ya likolo, nzela ya bomoi, akokima bongo nzela ya mboka ya bawa. | |
| Prov | LinVB | 15:25 | Yawe akokweisa ndako ya bato ba lolendo, kasi akolendisa lopango la mwasi akufeli mobali. | |
| Prov | LinVB | 15:26 | Mikano mibe mikoyokisaka Yawe nsomo, kasi akosepelaka na maloba ma boboto mazangi mbindo. | |
| Prov | LinVB | 15:27 | Moto aluli nkita na boyibi, akobebisa libota lya ye ; oyo aboyi mabonza mazangi bosembo, akoumela na bomoi. | |
| Prov | LinVB | 15:28 | Moto semba akomanyola liboso lya koyanola, kasi monoko mwa bato babe motondi na maloba mabe. | |
| Prov | LinVB | 15:32 | Moto aboyi malako, akomiyokisa mpasi, kasi oyo andimi maloba ma bopaleli akokolisa mayele. | |