Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PROVERBS
Prev Up Next
Chapter 15
Prov LinVB 15:1  Eyano ya boboto ekosilisa nkanda, kasi matumoli makongalisa nkele.
Prov LinVB 15:2  Maloba ma bato ba bwanya makoyokisaka mposa ya koyekola, kasi monoko mwa bazoba mokosopaka se bolema.
Prov LinVB 15:3  Miso ma Yawe makomonoko bipai binso, makokengeke bato babe na bato balamu.
Prov LinVB 15:4  Liloba lya bondeko lizali nzete ya bomoi, kasi maloba mabe makozokisa motema.
Prov LinVB 15:5  Moto zoba akokinolaka makebisi ma tata wa ye, oyo akondimaka malako azali moto wa mayele.
Prov LinVB 15:6  Ndako ya moto wa bosembo ezali na nkita enene, kasi nkita ya moto mabe ekokitisa ye motema te.
Prov LinVB 15:7  Maloba ma moto wa bwanya makoteyaka bato baike, kasi bakoki kotia mitema na makanisi ma bazoba te.
Prov LinVB 15:8  Mabonza ma bato babe makoyokisa Yawe nsomo, kasi losambo la basemba lokosepelisa Ye.
Prov LinVB 15:9  Yawe akoyoka mpi na ezalela ya bato babe, kasi alingi moto akolukaka bosembo.
Prov LinVB 15:10  Moto atiki nzela elamu akozwa etumbu enene, oyo aboyi koyoka mapaleli, akokufa.
Prov LinVB 15:11  Yawe akomonoko mboka ya bawa na bozindo bwa yango, leka yango, akomonoko makanisi o mitema mya bato !
Prov LinVB 15:12  Moto akosekeke baninga alingi te ’te bapalela ye, yango wana akokimaka bato ba bwanya.
Prov LinVB 15:13  Esengo o motema ekongengisa elongi ya moto, mawa o motema mokomonono mpe o elongi.
Prov LinVB 15:14  Motema mwa moto wa mayele mokoluka boyebi, kasi monoko mwa bazoba mokomele se bolema.
Prov LinVB 15:15  Moto wa mawa azali na mawa mikolo minso, kasi moto wa motema esengo akosepelaka ntango inso.
Prov LinVB 15:16  Malamu ozala na mbongo mingi te, kasi obanga Yawe, mabe soko ozali na nkita enene, kasi motema likolo.
Prov LinVB 15:17  Kolia mwa ndunda o esika bolingi bozali, ezali esengo, kolia ngombe mafuta o esika bakoyinanaka, eleki mabe.
Prov LinVB 15:18  Moto wa nkanda akobimisaka boswani, moto wa motema mpio akosilisa bwango.
Prov LinVB 15:19  Nzela ya moto goigoi etondi na nzube, kasi nzela ya basemba ebongi nye.
Prov LinVB 15:20  Mwana wa botosi akosepelisa tata wa ye, kasi mwana zoba akokinola mama wa ye.
Prov LinVB 15:21  Moto zoba akosepelaka na bolema bwa ye, kasi moto wa mayele akokende seko liboso.
Prov LinVB 15:22  Mikano miye omanyoli malamu te, okokokisa myango te, mikobongo mpo ya malako ma bato baike.
Prov LinVB 15:23  Esengo na moto ayebi koyanola malamu, koloba o ntango esengeli ezali malamu mingi.
Prov LinVB 15:24  Moto wa mayele akolandaka nzela ya likolo, nzela ya bomoi, akokima bongo nzela ya mboka ya bawa.
Prov LinVB 15:25  Yawe akokweisa ndako ya bato ba lolendo, kasi akolendisa lopango la mwasi akufeli mobali.
Prov LinVB 15:26  Mikano mibe mikoyokisaka Yawe nsomo, kasi akosepelaka na maloba ma boboto mazangi mbindo.
Prov LinVB 15:27  Moto aluli nkita na boyibi, akobebisa libota lya ye ; oyo aboyi mabonza mazangi bosembo, akoumela na bomoi.
Prov LinVB 15:28  Moto semba akomanyola liboso lya koyanola, kasi monoko mwa bato babe motondi na maloba mabe.
Prov LinVB 15:29  Yawe azali mosika na bato babe, kasi akondimelaka losambo la bato ba bosembo.
Prov LinVB 15:30  Miso boboto mikoyokisaka motema esengo, nsango elamu ekolendisaka nzoto.
Prov LinVB 15:31  Moto akotia matoi na maloba ma bopaleli, akofanda o lisanga lya bato ba bwanya.
Prov LinVB 15:32  Moto aboyi malako, akomiyokisa mpasi, kasi oyo andimi maloba ma bopaleli akokolisa mayele.
Prov LinVB 15:33  Kobanga Yawe ezali liteya lya bwanya, liboso ’te azwa lokumu, moto ayeba komikitisa.