PSALMS
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
67
68
69
70
71
72
73
74
75
76
77
78
79
80
81
82
83
84
85
86
87
88
89
90
91
92
93
94
95
96
97
98
99
100
101
102
103
104
105
106
107
108
109
110
111
112
113
114
115
116
117
118
119
120
121
122
123
124
125
126
127
128
129
130
131
132
133
134
135
136
137
138
139
140
141
142
143
144
145
146
147
148
149
150
Chapter 42
Psal | LinVB | 42:3 | Motema mwa ngai mozali koyoka mposa ya Nzambe, ye ntina ya bomoi bwa ngai ; mokolo nini nakokoma o miso ma Mokonzi ? | |
Psal | LinVB | 42:4 | Butu moi nazali kolela, mpo mikolo minso bazali kotuna ngai : « Wapi Nzambe wa yo ? » | |
Psal | LinVB | 42:5 | Soko nakanisi bongo, molimo mwa ngai mokomi kolela ; nazalaki kokende o ndako ya Nta-Likolo, o ndako ya Nzambe, elongo na bato ebele bayokaki nsai mpe bayembaki nzembo ya bokumisi. | |
Psal | LinVB | 42:6 | Motema mwa ngai, mpo nini olembi boye ? Mpo nini ozali kokimela mpo ya ngai ? Tia elikya na Nzambe, nakokumisa ye lisusu, ye mobikisi mpe Nzambe wa ngai. | |
Psal | LinVB | 42:7 | Motema mwa ngai molembi, nakanisi yo lisusu, ut’o mokili mwa Yordane mpe ngomba Ermon. | |
Psal | LinVB | 42:9 | Mokonzi atindela ngai lisalisi lya ye na moi, mpe na butu nayembela Nzambe, ye ntina ya bomoi bwa ngai. | |
Psal | LinVB | 42:10 | Nzambe azali libanga likobikisa ngai ; natuna ye : « Mpo nini obosani ngai ? Mpo nini nayoka se mawa ? Mpo nini nanyokwami bongo na banguna ? » | |
Psal | LinVB | 42:11 | Banyokoli bazokisi ngai motema na mafinga, mikolo minso batuni ngai : « Wapi Nzambe wa yo ? » | |