Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
EZRA
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10
Prev Up Next
Chapter 8
Ezra LinVB 8:1  Tala awa nkombo ya bankumu ba mabota balongwaki o Babilon elongo na ngai, o eleko Artaksasta azalaki mokonzi :
Ezra LinVB 8:2  Wa libota lya Pinekas : Gersom ; wa libota lya Itamar : Daniel ; wa libota lya Davidi : Atus,
Ezra LinVB 8:3  mwana wa Sekania ; ba libota lya Paros : Zekaria na babali basusu monkama na ntuku itano ;
Ezra LinVB 8:4  ba libota lya Pakat-Moab : Elionai, mwana wa Zerakia, na babali basusu nkama ibale ;
Ezra LinVB 8:5  ba libota lya Zatu : Sekania, mwana wa Yakaziel, na babali basusu nkama isato ;
Ezra LinVB 8:6  ba libota lya Adin : Ebed, mwana wa Yonatan, na babali ntuku itano ;
Ezra LinVB 8:7  ba libota lya Elam : Yesaya, mwana wa Atalia, na babali basusu ntuku motoba ;
Ezra LinVB 8:8  ba libota lya Sefatia : Zebadia, mwana wa Mikael, na babali basusu ntuku mwa­mbe ;
Ezra LinVB 8:9  ba libota lya Yoab : Obadia, mwana wa Yekiel, na babali basusu nkama ibale na zomi na mwambe ;
Ezra LinVB 8:10  ba libota lya Bani : Selomit, mwana wa Yosifia, na babali basusu monkama na ntuku motoba ;
Ezra LinVB 8:11  ba libota lya Bebai : Zekaria, mwana wa Bebai, na babali basusu ntuku ibale na mwambe ;
Ezra LinVB 8:12  ba libota lya Azgad : Yokanan, mwana wa Akatan, na babali basusu monkama na zomi ;
Ezra LinVB 8:13  ba libota lya Adonikam : bana ba nsuka, nkombo ya bango : Elifelet, Yekiel, na Semaya, na babali basusu ntuku motoba ;
Ezra LinVB 8:14  mpe ba libota lya Bigvai : Utai, mwana wa Zabud, na babali basusu ntuku nsambo.
Ezra LinVB 8:15  Nasangisi bango penepene na mo­luka, moye mokotiyolaka epai ya Akava. Tofandi wana mikolo misato. Natali malamu, namoni banganga Nzambe na bato basusu, kasi namoni ata mo-Levi moko te.
Ezra LinVB 8:16  Yango wana natindi bakonzi Eliezer, Ariel, Semaya, Elnatan, Yarib, Elnatan mosusu, Natan, Zekaria, Mesulam na bateyi basusu Yoyarib na Elnatan,
Ezra LinVB 8:17  bake­nde epai ya Ido, mokonzi wa mboka Kasifia ; nayebisi bango bakende koyebisa Ido na bandeko ba ye bafandi o mboka Kasifia, ’te bapesa biso basalisi mpo ya Tempelo ya Nzambe wa biso.
Ezra LinVB 8:18  Awa Nzambe wa biso azalaki kosalisa biso, batindeli biso moto moko wa mayele, moko wa bana ba Makli, wa libota lya Levi, mwana wa Israel ; nkombo ya ye Serebia ; ayei na bana na bandeko ba ye zomi na mwambe.
Ezra LinVB 8:19  Ayei na Kasabia mpe na ndeko wa ye Yesaya wa libota lya Merari, mpe na bana ba ye ; banso bazalaki ntuku ibale.
Ezra LinVB 8:20  Apesi mpe basalisi basusu nkama ibale na ntuku ibale, baye Davidi na bakonzi bapesaki ba-Levi mpo ’te basalela bango. Bata­ngi bango banso moko moko.
Ezra LinVB 8:21  Kuna penepene na moluka Akava natindi ’te bato balala nzala, nalobi : Tomikitisa o miso ma Nzambe wa biso mpe tosenge ye abatela biso o mobembo, na bana na mpe biloko bya biso.
Ezra LinVB 8:22  Mpamba te, nayoki nsoni mpo ’te nasenge mokonzi apesa biso basoda ba farasa babatela biso na bayibi o nzela, zambi tolobaki na mokonzi : « Nzambe wa biso akosalisaka bato banso bakumisi ye, kasi akoyokaka nkanda enene na baye baboyi ye. »
Ezra LinVB 8:23  Yango wana tolali nzala, na ntina ena tobondeli Nzambe wa biso, mpe andimeli biso.
Ezra LinVB 8:24  O kati ya banganga Nzambe naponi bankumu zomi na babale : Serbia na Kasabia na bandeko basusu zomi.
Ezra LinVB 8:25  O maboko ma bango nameki bozito bwa palata, wolo na biloko biye mokonzi, balaki na bankumu babonzaki mpo ya Tempelo ya Nzambe wa biso, na mabonza manso bato ba Israel bapesaki.
Ezra LinVB 8:26  Napesi bango tale­nta ya palata nkama motoba na ntuku itano, biloko bya palata bya talenta monkama, talenta ya wolo monkama,
Ezra LinVB 8:27  nkeni ya wolo ntuku ibale ya motuya mwa darike nkoto yoko, na mbeki ya mbengi ibale ingengi lokola wolo, bonzenga mpenza mpe ya motuya monene.
Ezra LinVB 8:28  Nalobi na bango : « Bino bozali babonzami na Yawe ; biloko biye bizali bisantu ; palata na wolo iye izali likabo bopesi Yawe Nza­mbe wa bankoko ba bino.
Ezra LinVB 8:29  Bokengele yango malamu mpe bobo­mba yango tee mokolo bokoki kotanga yango o miso ma banganga bakonzi, ba-Levi na bankumu ba mabota o Yeruzalem, o ndako ya ebombelo ya mosolo ya Tempelo ya Yawe. »
Ezra LinVB 8:30  Bo­ngo banganga Nzambe na ba-Levi bakamati palata na wolo na biloko batiaki o kilo, mpe bakei na yango o Yeruzalem o Tempelo ya Yawe.
Ezra LinVB 8:31  Mokolo mwa zomi na mibale mwa sanza ya yambo totiki moluka Akava mpe tokei o Yeruzalem. Nza­mbe wa biso asalisi mpe abateli biso na banguna mpe na bayibi o nzela.
Ezra LinVB 8:33  Mokolo mwa minei tomeki bozito bwa palata, wolo na biloko o Tempelo ya Yawe Nzambe wa biso, mpe totii binso o maboko ma nganga Nzambe Meremot, mwana wa Uria. Eleazar, mwana wa Pinekas, azalaki na ye. Ba-Levi Yozabad, mwana wa Yozue, na Noadia, mwana wa Binui, bazalaki mpe wana.
Ezra LinVB 8:34  Batangi motuya mpe bozito, mpe bakomi binso o monkanda.
Ezra LinVB 8:35  O mikolo mina baye bautaki o boombo babonzeli Nzambe wa Israel libonza lya kotumba ; babomi ngombe babali zomi na ibale mpo ya Israel mobimba, na mpata babali ntuku libwa na motoba, na bana mpata ntuku nsambo na ibale, na ntaba babali zomi na ibale bo moboma mwa masumu ; ezalaki libonza lya kotu­mba babonzeli Yawe.
Ezra LinVB 8:36  Na nsima bapesi monkanda mwa bitinda bya mokonzi o maboko ma bayangeli mpe ma bankumu ba mokili o ngambo ya Efrate ; bango ba-ndimi bitinda mpe basalisi bato mpe Tempelo ya Yawe.