Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
HEBREWS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 10
Hebr LinVB 10:1  Mobéko mwa ba-Yúda molakísí sé ndámbo ya malámu maye makoyâ nsima, molakísí mangó mobimba té. Yangó wâná Mobéko mokokí kosántisa bato té, baye bakobonzelaka Nzámbe mbú­la na mbúla mabonza ma ndéngé yǒ­kó.
Hebr LinVB 10:2  Sókó mabonza mâná makokákí kopétola bato sékô, mpé kosála ’te bámíyéba na lisúmu lisúsu té, mbele batíkáká kobonza mabonza.
Hebr LinVB 10:3  Kasi na mabonza maye ma mbúla na mbúla bato bakokundolaka ’te bazalí basúmuki.
Hebr LinVB 10:4  Ya sôló, makilá ma bána ba ngómbé mpé ma ntaba babáli makokí kolongola masúmu sókí té.
Hebr LinVB 10:5  Yangó wâná ntángo ayéí o mokili, Krístu alobí na Tatá : Olingákí libonza tǒ mobómá té, kasi obongísélí ngáí nzóto.
Hebr LinVB 10:6  Olingákí nyama té iye itumbámí ná mpé mabonza mpô ya kozwa bolímbisi masúmu.
Hebr LinVB 10:7  Bôngó nalobákí : Ngáí óyo ! Nayéí mpô ’te násála lokóla yǒ, Nzámbe, olingí, lokóla ekomámí o Minkandá mpô ya ngáí.
Hebr LinVB 10:8  Libosó alobí : Mabonza mpé mibómá, nyama iye itumbámí mpé mabonza mpô ya bolímbisi masúmu, olingákí mangó té, mazalákí mpé kosepelisa yǒ té. Nzókandé ba­kobo­nzaka mangó lokóla Mobéko motíndí.
Hebr LinVB 10:9  Na nsima alobí : Ngáí óyo nayéí mpô ’te násála lokóla yǒ oli­ngí. Alongólí mabonza ma kala mpé abimísí libonza lya sika.
Hebr LinVB 10:10  Lokóla Nzámbe alingákí, Yézu Krístu asán­tísí bísó, mpô abonzí nzóto ya yě sé mbala yǒ kó sékô.
Hebr LinVB 10:11  Banganga Nzámbe bánso bakotélemeke mpô ya kosála mosálá mwa Nzámbe mokolo na mokolo mpé mpô ya kobonzela yě mabonza mbala na mbala, kasi mabonza mâná makokí kolongola masúmu sókí té.
Hebr LinVB 10:12  Kasi Krístu abonzélí Nzá­mbe libonza sé lyǒ kó mpô ya kozwa bolímbisi masúmu, mpé sikáwa afándí sékô o lobóko la mobáli la Nzámbe.
Hebr LinVB 10:13  Azalí sé kozila ’te bangúná ba yě bátíama o nsé ya makolo ma yě lokóla ebóngá.
Hebr LinVB 10:14  Bô­ngó, na libonza sé lyǒkó abo­ngísí sékô baye azalí kosántisa.
Hebr LinVB 10:15  Elímo Sántu ayébísí bísó bôngó. Libosó alobí :
Hebr LinVB 10:16  Tálá bondeko nakokáta na bangó nsima ya mikolo mîná. Mokonzi alobí : Nakotía mibéko mya ngáí o mitéma mya bangó, mpé nakokoma myangó o makanisi ma bangó.
Hebr LinVB 10:17  Mpé abakísí : Nakokanisa masúmu mpé matúmolí ma bangó lisúsu té.
Hebr LinVB 10:18  Bôngó, esíká masúmu malí­mbá­mí, basengélí lisúsu kobonza libonza mpô ya bolímbisi masúmu té.
Hebr LinVB 10:19  Bôngó, bandeko, toyébí sôló ’te, mpô ya makilá ma Yézu, tozwí nzelá ya koyíngela o esíká esántu.
Hebr LinVB 10:20  Abongísélí bísó nzelá eye ya sika mpé ya bomoi ; na libonza lya nzóto ya yě, alongólí elambá eye ezalákí kokanga nzelá ya boyíngeli o esíká esántu.
Hebr LinVB 10:21  Sikáwa tozalí na Nganga Mokonzi, yě Mokonzi wa libótá lya bána ba Nzámbe.
Hebr LinVB 10:22  Bôngó, tóbeleme na Nzámbe na motéma sé­mba, na boyambi bokási mpenzá. Nzámbe ápétola mitéma mya bísó, álongola mbindo ínso ya mayéle mabé mpé ásukola bísó nzóto na mái péto.
Hebr LinVB 10:23  Tókangana makási na boyambi, áwa tozalí kotía elíkyá na Oyo akokokisaka bilakó bya yě.
Hebr LinVB 10:24  Tósálisana mpé tóléndisana, na bolingani mpé na misálá milámu.
Hebr LinVB 10:25  Bókíma lisangá lya bínó té, lokóla basúsu bameséní kosála, kasi bólé­ndisana, áwa bomóní ’te Mokolo mwa Mokonzi mozalí kobeleme.
Hebr LinVB 10:26  Sókó tozalí kosála masúmu na nkô, atâ toyébí bosôló, libonza lyǒ­kó té likokí kozwela bísó bolímbisi masúmu.
Hebr LinVB 10:27  Tokokí bobélé kobánga likambo lya nsómo liye likokwêla bísó, lyangó ndé : mokolo Nzámbe akokáta makambo ma bato, móto makási mokosílisa baye batombókélí yě.
Hebr LinVB 10:28  Moto abóyí kotósa Mobéko mwa Móze, basengélí koboma yě, sókó bato bábalé tǒ básáto bafúndákí yě ; báyókela yě mawa té.
Hebr LinVB 10:29  Bôngó, moto akínólí Mwána wa Nzámbe, asántólí makilá ma Bondeko maye masántísí yě, mpé atúkí Elímo óyo azwě lí yě ngrásya ya Nzámbe, asengélí kozwa etú­mbu elekí makási !
Hebr LinVB 10:30  Mpámba té, toyébí náni moto alobákí : Ngáí moto nakopésa etúmbu ; ngáí moto nakozó­ngisela moto mabé asálákí ; mpé lisúsu : Mokonzi akosámbisa bato ba yě.
Hebr LinVB 10:31  Likambo lya nsómo mpenzá, sókí moto akwéí o mabóko ma Nzámbe wa bomoi !
Hebr LinVB 10:32  Bókundola o mitéma mikolo mya libosó, ntángo Nzámbe afu­ngó­lákí bínó míso : bokangákí mité­ma o etumba enéne bozalákí kobu­nda.
Hebr LinVB 10:33  Mbala isúsu bazalákí kotúmola mpé ko­nyókolo bínó o míso ma bato ; mbala isúsu bozalákí motéma mǒkó na baye banyókwámí bôngó.
Hebr LinVB 10:34  Ya sôló, bozalákí koyóka mpási elongó na baye bakangémákí o bolóko, mpé ntángo babótólókí bínó bilóko, bondimákí yangó na nsáí, mpô boyébákí ’te bozalí na nkita elekí enéne, eye ekoúmela sékô.
Hebr LinVB 10:35  Bôngó bóbwáka elíkyá té, mpô ekozwela bínó litómba lilekí linéne !
Hebr LinVB 10:36  Bosengélí kotía moléndé mpô ’te bókokisa maye Nzámbe alingí, mpé bôngó bokozwa malámu maye alakélákí.
Hebr LinVB 10:37  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Etíkálí moké, etíkálí bobélé mwâ moké, óyo asengélí koyâ, akoyâ, akoúmela té.
Hebr LinVB 10:38  Moto akómí na bosémbo o míso ma Nzámbe mpô ya boyambi, akobíka ; kasi sókó na nsima ape­ngwí, akokí kosepelisa ngáí té.
Hebr LinVB 10:39  Baye bakozóngaka nsima mpé bakobúngama, ezalí bísó té ; bísó tozalí bato ba boyambi. Mpô ya boyambi bwa bísó tokozwa bomoi.