I CORINTHIANS
Chapter 12
| I Co | LinVB | 12:2 | Boyeba ‘te bozalákí bapagáno, mitéma mya bínó mizalákí kobénda bínó epái ya bikeko biye bikolobaka té. | |
| I Co | LinVB | 12:3 | Yangó wâná nayébísí bínó : Na ngúyá ya Elímo wa Nzámbe moto mǒkó té akokí koloba ’te : « Mabé na Yézu. » Mǒ kó mpé té akokí koloba ’te Yézu, Mokonzi, sókó Elímo Sántu azalí na yě té. | |
| I Co | LinVB | 12:6 | Misálá mizalí ndéngé na ndéngé, kasi Nzámbe sé mǒkó akopésaka bato bánso ngúyá ya kosála misálá mínso. | |
| I Co | LinVB | 12:8 | Na lisálisi lya Elímo mosúsu azwí likabo lya koloba na bwányá ; na lisálisi lya Elímo ônáméí mosúsu azwí likabo lya kolimbola eyamba na mayéle ; | |
| I Co | LinVB | 12:9 | mosúsu azwí libako lya boyambi bonéne, na lisálisi lya Elímo ônáméí ; mosúsu azwí likabo lya ngúyá ya kobíkisa bato ba bokono, sé na lisálisi lya Elímo ônáméí ; | |
| I Co | LinVB | 12:10 | mosúsu azwí ngúyá ya kosála makamwísi, mosúsu ya kosakola Liloba lya Nzámbe, mosúsu mayéle ma kososola maye maútí na Elímo ; mosúsu likokí lya koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té, mosúsu mayéle ma kolimbola yangó. | |
| I Co | LinVB | 12:11 | Kasi Elímo sé mǒkó akosálaka mâná mánso, mpé akokabolelaka moto na moto makabo ma yě lokóla yě mǒkó alingí. | |
| I Co | LinVB | 12:12 | Zambi lokola nzóto ya moto ezalí sé yǒ kó, atâ ezalí na binama míngi : binama bínso, atâ bizalí míngi, bisangání o nzóto sé yǒ kó. ezalí sé bôngó o Krístu. | |
| I Co | LinVB | 12:13 | Bísó bánso, ba-Yúda, ba-Greki, baómbo na bansómí, tokómí nzóto sé yǒ kó o batísimo na ngúyá ya Elímo sé mǒkó, bánso totóndí na Elímo sé mǒkó. | |
| I Co | LinVB | 12:15 | Atâ lokolo lolobí : « Ngáí nazalí lobóko té, yangó wâná nazalí eténi ya nzóto té », lokolo lozalí sé enama ya nzóto té ? | |
| I Co | LinVB | 12:16 | Atâ litói lilobí : « Ngáí nazalí líso té, yangó wâná nazalí eténi ya nzóto té », litói lizalí sé enama ya nzóto té ? | |
| I Co | LinVB | 12:17 | Sókó nzóto mobimba ezalákí bobélé líso, bóníbóní tokoyóka maloba ? Sókó nzóto mobimba ezalákí bobélé litói, bóníbóní tokoyóka nsolo ? | |
| I Co | LinVB | 12:18 | Nzókandé Nzámbe atíí binama o nzóto, enama yǒ kó yǒ kó o esíká ya yangó lokóla yě mǒkó alingákí. | |
| I Co | LinVB | 12:21 | Yangó wâná líso likokí koloba na lobóko té ’te : « Nasengélí na yǒ té » ; motó mpé mokokí koloba na makolo té ’te : « Nasengélí na bínó té. » | |
| I Co | LinVB | 12:23 | Binama biye bizángí lokúmu o míso ma bísó, tokopésaka byangó lokúmu lonéne ; binama biye bikoyókisaka moto nsóni, tokopésaka byangó limemyá linéne. | |
| I Co | LinVB | 12:24 | Binama biye bizalí na lokúmu bisengélí na limemyá lîná té. Nzámbe akelí nzóto boye : binama bizángí lokúmu, apésí byangó lokúmu lonéne, | |
| I Co | LinVB | 12:26 | Sókó enama yǒ kó eyókí mpási, binama bínso bikómí mpé na mpási ; sókó enama yǒ kó ezwí lokúmu, binama bínso bizalí kosepela na yangó elongó. | |
| I Co | LinVB | 12:27 | Bínó bánso bozalí nzóto ya Krístu ; mpé mǒkó mǒkó wa bínó azalí enama ya nzóto eye. | |
| I Co | LinVB | 12:28 | Nzámbe apésí moto mǒkó mǒkó esíká ya yě o Eklézya : libosó bapóstolo, ya míbalé baproféta, ya mísáto batéyi. Nsima ya bangó basúsu bazwí ngúyá ya kosála makamwísi, basúsu ya kobíkisa bato, basúsu ya kosálisa báníngá, basúsu ya koyángela Eklézya tǒ ya koloba nkóta iye bangó mǒkó bayébí té. | |
| I Co | LinVB | 12:29 | Bangó bánso bazalí ndé bapóstolo ? Bánso bazalí ndé baproféta ? Bánso bazalí ndé batéyi ? Bánso bakosálaka ndé makamwísi ? | |
| I Co | LinVB | 12:30 | Bánso bakokí ndé kobíkisa bato ? Bánso bakolobaka ndé nkóta iye bangó mǒkó bayébí té ? Bánso bakolimbolaka ndé nkóta îná ? | |