Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II MACCABEES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15
Prev Up Next
Chapter 5
II M LinVB 5:1  O mikolo mina Antioko amilengeli mpo akende kobunda na Ezipeti mbala ya ibale.
II M LinVB 5:2  O nta­ngo ena bazalaki komono o engu­mba mobimba, mikolo ntuku inei, batambwisi farasa o likolo. Balati bilamba bike­mbami na nsinga ya wolo. Bazalaki koleka milongo milongo, lokola limpinga lya basoda.
II M LinVB 5:3  Batongi milongo epai na epai mpo babundisana, na nguba izalaki koningana, mpe na makongo ebele. Basili babendi mimpa­nga, makula mazalaki koleka o likolo ; bata­mbwisi bazalaki na bibuneli mpe na milato ndenge na ndenge bizalaki kongenge.
II M LinVB 5:4  Yango wana bato banso basambeli mpo ’te mamoni maye mayela bango makambo malamu.
II M LinVB 5:5  O mikolo mina nsango ya lokuta etamboli ’te Antioko akufi. Yason akanisi ’te ezalaki ya solo. Asa­ngisi basoda nkoto yoko mpe akei kobu­ndisa engumba na mbalakaka. Etumba ebandi o bifelo bya engu­mba, kasi babotoli engumba, mpe Menelas asengeli kobombama o ebombamelo.
II M LinVB 5:6  Yason abomi bato ebele ba ekolo ya ye moko, mawa te. Abosani ’te moto alongi bandeko ba ye, akomikweisa mpenza. Asali na bato ba ye lokola alingaki kolonga banguna seko.
II M LinVB 5:7  Nzokande akoki kokamata bokonzi te : manso asali masukeli ye mabe, mpe ase­ngeli lisusu kobombama o mokili mwa ba-Amon.
II M LinVB 5:8  Asuki mpe bongo na makambo mabe ma ye : bafundi ye epai ya Aretas, mokonzi wa ba-Arabu. O mboka yoko yoko akimi, asengeli mpe kokima lisusu ; bato banso bazalaki kobengana ye. Bayini ye mpo aboyi mibeko mya ekolo, mpe bakinoli ye mpo abomi bandeko na bato ba ekolo ya ye ; akei o Ezipeti.
II M LinVB 5:9  Akimi tee o Lasedemonia ; akanisaki ’te akobika kuna mpo bankoko ba ye. Bongo moto akimisaki bato baike o ekolo ya bango, akei kokufa o mokili mosusu.
II M LinVB 5:10  Oyo alalisaki bibembe biike bizwi ata malita te, bakundi ye o esika ya bankoko ba ye te : ata moto moko te aleli ye, to apesi ye lokumu la nsuka.
II M LinVB 5:11  Eyoki Antioko nsango ena, aka­nisi ’te o Yudea bato batomboki lisusu. Angali na nkanda lokola nyama ya zamba. Atiki Ezipeti, akei na basoda kobotolo Yeruzalem.
II M LinVB 5:12  Atindi bango ’te baboma bato banso bakokuta bango o balabala, bayokela bango mawa te ; bakata nkingo ya baye babombami o ndako ya bango.
II M LinVB 5:13  Bongo babomi bilenge na babange, basilisi basi na bana, bakati bilenge basi na bana bake nkingo.
II M LinVB 5:14  Bobele o mikolo misato bato nkoto ntuku mwambe babungami. Bato nkoto ntuku inei bakufi, basusu nkoto ntuku inei batekemi bo baombo.
II M LinVB 5:15  Lokola ekoki bongo naino te, mokonzi abangi te koyingela o Tempelo, eye eleki Tempelo inso ya mokili na bosantu. Menelas, mosuli wa mibeko mpe wa ekolo, aka­mbi ye kuna.
II M LinVB 5:16  Na maboko mbindo ma ye asimbi mbeki isantu, mpe ayibi biloko biye bakonzi basusu batikaki kuna bo libonza mpo ya kokembisa mpe kokumisa esika eye esantu.
II M LinVB 5:17  Anti­oko amikumisi na ya­ngo ; ayebi te ’te Nzambe asiliki mwa mikolo mpo ya masumu ma bato ba engumba ; emononi ’te apa­ngani na Tempelo lisusu te.
II M LinVB 5:18  Soko bazalaki na masumu ebele boye te, mbele babeteki Antioko fi­mbo se o mokolo ayaki, lokola esalemaki na Eliodoro, oyo atindamaki na mokonzi Seleko mpo atala mosolo mwa ndako ya Nzambe. Mbele ye Antioko atikaki mpe mokano mwa lofundo.
II M LinVB 5:19  Nzokande Mokonzi apo­ni bato te mpo ya esika esantu, kasi aponi esika esantu mpo ya bato.
II M LinVB 5:20  Yango wana makambo ma­kweli bato makweli mpe Tempelo, se lokola na nsima ezwi bolamu elongo na bango. Nzambe wa bokasi bonso abosani yango mwa mikolo mpo ya nkanda. Kasi awa Mokonzi monene azongeli bato na bondeko, ezwi lisusu lokumu lokola kala.
II M LinVB 5:21  Antioko alongoli talenta nkoto yoko na nkama mwambe o Tempelo, na nsima akei noki o Antioko. Na lolendo la ye akanisi ’te akoki kofungolela masuwa nzela ya mokili, na mpe nzela ya mai mpo ya botamboli na makolo.
II M LinVB 5:22  Awa akei, atiki bayangeli mpo ya konyokolo bato ba ekolo. O Yeruzalem atiki Filipo, moto wa Frizia, aleki moko­nzi wa ye na makambo makasi makasi.
II M LinVB 5:23  O ngomba Garizim atiki Androniko mpe Menelas, oyo aleki baninga ba ye na bobe ; azalaki koyina ba-Yuda boyini.
II M LinVB 5:24  Mokonzi atindi Apolonio, komanda na basoda nkoto ntuku ibale na ibale na motindo ’te baboma babali baye bazalaki makasi, mpe bateke basi na bana.
II M LinVB 5:25  Ekomi ye o Yeruzalem, akosi ’te ayei na boboto. Kasi ekomi mokolo mwa Sabato, mokolo moye ba-Yuda bakopemaka, abengi basoda banso.
II M LinVB 5:26  Abomi bato banso bayei kotala ; na nsima akatisi na basoda engumba, mpe abomi bato ebele.
II M LinVB 5:27  O ntango ena Yudas, oyo bakobengaka Makabe, na baninga soki zomi, akimi o eliki. Kuna bafandi lokola nyama o ngomba. Bazalaki kolia se ndunda mpo ’te bazwa mbindo te.