II MACCABEES
Chapter 15
II M | LinVB | 15:1 | Eyoki Nikanor ’te Yudas na bato ba ye bazalaki o mokili mwa Samaria, akani kobimisela bango etumba o mokolo mwa bopemi, mpo bakoka kopesa ye kwokoso te. | |
II M | LinVB | 15:2 | Ba-Yuda baye basengeli kolanda ye balobi na ye : « Oboma bango lokola mosenzi te ; omemya mokolo moye Nzambe mobateli wa bikelamo binso apono mpe asantisa. » | |
II M | LinVB | 15:3 | Nzokande, moto oyo nsuka ya bobe, atuni soko ya solo mokonzi moko azali o likolo oyo apesaki mobeko mwa mokolo mwa Sabato. | |
II M | LinVB | 15:4 | Bango bazongiseli ye : « Mokonzi wa bomoi, oyo azali mokonzi monene o likolo, yemei atindi ’te basantisa mokolo mwa nsambo. » | |
II M | LinVB | 15:5 | Kasi ye ayanoli : « Ngai mpe nazali na makasi awa o nse. Natindi bato bakamata bibuneli mpe basalela mokonzi. » Nzokande maye akanaki kosala, akokaki kosala mango te. | |
II M | LinVB | 15:6 | Nikanor na lofundo la ye akani kotonga litongi linene na bibuneli bya Yudas mpe bya bato ba ye. | |
II M | LinVB | 15:8 | Akebisi bato ba ye ’te babanga boyei bwa bapagano te. Bakanisa boniboni Nzambe asili asalisaki bango mbala mingi, bongo batia mitema na Mokonzi wa bokasi bonso. Bandima ’te sikawa lisusu akolongisa bango. | |
II M | LinVB | 15:9 | Alendisi bango na maloba ma buku ya Mobeko mpe ma baprofeta. Akundoleli bango bikela bya bitumba babundaki liboso, bongo apesi bango lisusu mpiko. | |
II M | LinVB | 15:10 | Alakisi bango mpe ’te bapagano bakokisaka bilako bya bango te mpe ndenge babukaki ndai ya bango. Esilisi ye kolendisa bango mitema, | |
II M | LinVB | 15:11 | atindi ’te bakamata bibuneli. Bokasi bwa bango bokouta na nguba to makongo ma bango te, kasi na maloba ma bolendisi ayebisi bango. Asololi bango mpe ndoto eye alotoki ; ezalaki lokola limoni amonoki ; basepeli na yango mingi. | |
II M | LinVB | 15:12 | Limoni liye lizalaki boye : nganga mokonzi Onias, oyo azalaki moto semba mpe wa motema bosawa, moto wa boboto mpe na maloba ma bonkonde, moto alingaki kolakisa ezalela elamu o makambo manso ut’o bomwana, amilakisaki na ye. Atomboli maboko mpe asambeleli ekolo mobimba ya ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 15:13 | Na nsima moto mosusu abimeli Yudas se bongo : moto wa lokumu lonene, mobange akokisi mibu miike, alati bilamba binzenga bya mokonzi monene. | |
II M | LinVB | 15:14 | Onias alobi : « Moto oyo akopanganaka na bandeko ba ye, akosambelaka mingi mpo ya ekolo ya ye mpe mpo ya Engumba Esantu ; ezali Yeremia, profeta wa Nzambe. » | |
II M | LinVB | 15:15 | Yeremia atandi loboko la mobali, mpe ntango apesi Yudas mopanga mwa wolo alobi na ye : | |
II M | LinVB | 15:16 | « Kamata mopanga moye mosantu mozali likabo lya Nzambe. Na mopanga moye okonyata banguna. » | |
II M | LinVB | 15:17 | Maloba ma Yudas malendisi bango mitema, mazalaki solo maloba makoki kopesa bilenge mpiko mpo ’te babunda lokola bakolo mpenza. Bayokani ’te bapika nganda te, kasi babanda etumba bango moko ; bakata bongo na mpiko likambo na etumba, mpo engumba mpe Tempelo ya bango ikomi na likama. | |
II M | LinVB | 15:19 | Baye batikali o Yeruzalem bazalaki mpe kobanga, bazalaki mitema likolo mpo ya etumba eye o esobe. | |
II M | LinVB | 15:20 | Banso bazalaki kozila ndenge nini etumba ekosuka. Banguna basili basangani mpe batongi milongo mpo ya etumba : batii nzoku o bisika, mpe bakaboli basoda ba farasa epai na epai ya basoda ba makolo. | |
II M | LinVB | 15:21 | Makabe amoni mampinga manene ma banguna, bibuneli ndenge na ndenge, mpe nzoku ya nsomo. Bongo atomboli maboko mpe asambeli Mokonzi oyo akokelaka bikela binene. Ayebi malamu ’te Nzambe akolongisa baye babongi kolonga : mpo ya bibuneli te, kasi mpo ye moko alingi bongo. | |
II M | LinVB | 15:22 | Asambeli boye : « E Mokonzi, o eleko ya mokonzi Ezekia otindaki anzelu aboma basoda nkoto monkama na ntuku mwambe na itano ba Senakerib. | |
II M | LinVB | 15:23 | E Mokonzi wa likolo, otindela mpe biso anzelu liboso lya biso mpo abungisa banguna mpe ayokisa bango nsomo. | |
II M | LinVB | 15:24 | Na nguya ya loboko la yo onyata baye bayei kobundisa ekolo ya yo esantu, maloba ma botuki o monoko. » Asilisi losambo la ye bongo. | |
II M | LinVB | 15:27 | Na maboko bazalaki kobunda, kasi bazalaki kosambela Nzambe o mitema. Babomi bato nkoto ntuku isato na itano. Basepeli mpo bamonoki ndenge Nzambe asalisi bango. | |
II M | LinVB | 15:28 | Esili etumba, bazongi o mboka na esengo enene. Bakuti Nikanor akufi, bilamba bya bitumba o nzoto. | |
II M | LinVB | 15:30 | Yudas, oyo amikabaki mobimba mpo ya ekolo ya ye, mpe alakisaki bandeko ba ye bolingi bwa solo mikolo minso, atindi ’te bakata motó na mpe loboko la mobali la Nikanor mpe bameme yango o Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 15:31 | Ntango akomi kuna, abengi ba-Yuda mpe atii banganga Nzambe o boso bwa altare. Abengisi mpe baye bazalaki o ebombamelo. | |
II M | LinVB | 15:32 | Alakisi bango motó mwa mobomi Nikanor na mpe loboko loye motuki atombolaki na lolendo mpo alakisa na mosapi Tempelo esantu ya Nzambe wa bokasi bonso. | |
II M | LinVB | 15:33 | Na nsima Yudas akati lolemu la moto mabe oyo mpe atindi ’te bapesa ndeke, ilia lango ndambo ndambo. Loboko, elembo ya bolema bwa ye, batingisi lango o boso bwa Tempelo. | |
II M | LinVB | 15:34 | Banso batondi mpe bakumisi Mokonzi oyo asalisi bango bongo, balobi : « Tokumisa Nzambe, zambi abateli ndako ya ye esantu mpo ’te ekoma na mbindo te. » | |
II M | LinVB | 15:35 | Yudas abaki motó mwa Nikanor o efelo ya ebombamelo, bo elembo elakisi polele ’te Mokonzi asalisi bango. | |
II M | LinVB | 15:36 | Banso bayokani ’te bakoki kolekisa mokolo mona mpamba te, kasi basepela mwango o sanza ya zomi na ibale, mokolo mwa zomi na misato. O lokota la ba-Aram bakotangaka sanza ena Adar. Mokolo mwango ezali mokolo liboso lya mokolo mwa Mardokai. | |
II M | LinVB | 15:37 | Lisolo lya makambo matali Nikanor lisili bongo. Banda mokolo mona mboka mokonzi ezali se o maboko ma ba-Ebrei. Yango wana nasukisi lisolo lya ngai awa. | |
II M | LinVB | 15:38 | Soko nabongisi manso malamu, yeba ’te ezali se lokola nalingaki. Soko nabongisi lyango malamu mingi te, mpe lileki minkanda misusu na elengi te, yeba ’te nasalaki se lokola ekoki na ngai. | |