Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II MACCABEES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15
Prev Up Next
Chapter 7
II M LinVB 7:1  Bakangaki mpe bandeko babali nsambo elongo na mama wa bango. Mokonzi wa ekolo abetisi bango fimbo. Fimbo esusu etongami na nsinga, esusu na misisa mya ngombe. Atindi bango na makasi ’te balia nyama ya ngulu eye Mobeko mokilisi.
II M LinVB 7:2  Moko wa bango alobi o nkombo ya bandeko ba ye : « Oli­ngi kotuna biso nini ? Olingi toyebisa yo nini ? Biso tondimi kokufa, tokoki koboya Mobeko mwa ba­nkoko te. »
II M LinVB 7:3  Mokonzi atoki na nka­nda, atindi ’te batia nzungu o móto monene.
II M LinVB 7:4  Awa nkoni epeli, atindi bato ba ye bakata lolemu la moto alobaki o nkombo ya bandeko ba ye, balongola ye lomposo la motó, bakata mpe nsonge ya binama bya nzoto ya ye, o miso ma bandeko mpe ma mama wa ye.
II M LinVB 7:5  Bazokisi ye nzoto mobimba, kasi azalaki kopema naino. Mokonzi atindi babeleme na ye penepene na móto mpe babwaka ye o nzungu. Ntango milinga mibimi o nzungu mizalaki kopanzana mosika, bandeko na mama wa bango bazalaki kolendisana, mpo ’te bakufa na motema mpiko. Balobi :
II M LinVB 7:6  « Mokonzi Nza­mbe azali komono biso. Solo, akoyokela biso ngolu, lokola ekomami o nzembo ya Moze, oyo asakolaki polele : Akoyokela basaleli ba ye ngo­lu. »
II M LinVB 7:7  Awa mwana wa yambo akufi bo­ngo, bayei na mwana wa babale mpo ya konyokolo ye. Balongoli ye lomposo la motó na nsuki. Na nsima batuni ye : « Olingi kolia nyama ya ngulu, bongo totika konyokolo nzoto ya yo eteni na eteni ? »
II M LinVB 7:8  Ayanoli o lokota la mboka : « Nali­ngi te ! » Yango wana banyokoli ye se bongo.
II M LinVB 7:9  Elingi ye kokata motema, alobi : « Yo, nsuka ya banyokoli, okoboma nzoto ya biso lelo, kasi Mokonzi wa likolo na nse akose­kwisa biso bato tokokufa mpo ya mibeko mya ye mpo ’te apesa biso bomoi bwa seko. »
II M LinVB 7:10  Nsima ya ye banyokoli mwana wa basato. Batindi ye ’te abimisa lolemu. Abimisi, alakisi bango mpe maboko, abangi soki moke te.
II M LinVB 7:11  Alo­bi na mpiko : « Nzambe moto apesi ngai binama biye, kasi mpo ya kotosa mibeko mya ye, nakoki kotika byango, na elikya ’te Nzambe akozongisela ngai byango. »
II M LinVB 7:12  Ata mokonzi na bato ba ye bakamwi na mpiko ya mwana oyo, mpo atali mpasi inso se mpamba.
II M LinVB 7:13  Ekufi ye, bakangi mwana wa banei mpe banyokoli ye se bongo.
II M LinVB 7:14  O ntango alingi akata motema, alobi : « Nabangi kokufa na maboko ma bato te, mpo nazali na elikya ’te Nzambe akosekwisa ngai ; kasi yo okosekwa te. »
II M LinVB 7:16  Oyo atali mokonzi swii mpe alobi : « Ata ozali moto asengeli kokufa, okoyangelaka bato, mpe okoki kosala na bango lokola olingi. Kasi okanisa te ’te Nza­mbe akotika ekolo ya biso.
II M LinVB 7:17  Zila, okomono bokasi bwa Nzambe mpe ndenge akonyokolo yo na libota lya yo. »
II M LinVB 7:18  Na nsima bayei na mwana wa motoba. Elingi ye kokata motema, alobi : « Omikosa te : tozali koyoka mpasi boye, mpo tosali masumu o miso ma Nzambe wa biso. Yango wana, makambo maye ma kokamwa mazali kosalema.
II M LinVB 7:19  Kasi yo, okanisa te ’te Nzambe akopesa yo etumbu te, awa omeki kobundisa ye. »
II M LinVB 7:20  Tala ndakisa ya kokamwa ya mama oyo amoni ’te bana ba ye nsa­mbo bakufi se o mokolo mo­ko : moto moko abosana yango te ! Andi­mi mpasi na motema mpiko, mpo atii motema se na Mokonzi.
II M LinVB 7:21  Ale­ndisi moko moko wa bango o lokota la mboka. Na bwanya mpe­nza alakisi ’te azalaki na mpiko lokola mobali. Motema mwa ye mwa bolingo, mama oyo alendisi mwa­ngo na mpiko ya mobali ; alobi na ba­ngo :
II M LinVB 7:22  « Nayebi te boniboni bosalemaki o libumu lya ngai. Ngai moto nakabelaki bino molimo na mpema ya bomoi te ; ngai nabongisaki binama bya bino te mpo bikoma nzoto yoko.
II M LinVB 7:23  Oyo akotindelaka biso bana babotama, azali Mokeli wa biloko binso, mpo azali liba­ndela lya bikelamo binso. Na ngolu ya ye akozongisela bino molimo na mpema ya bomoi, zambi bopa­ngani na bomoi bwa nzoto te, mpo bopusi kolinga Mobeko mwa ye. »
II M LinVB 7:24  Antioko akanisi ’te mama oyo azalaki kokinola mpe kofinga ye. Awa mwana wa nsuka azalaki naino na bomoi, abandi koloba na ye maloba ma elengi, na ndai alakeli ye ’te akokoma na nkita mpe na bolamu ; akokomisa ye moninga wa mokonzi, mpe akopesa ye mosala mwa lokumu, soko andimi koboya mibeko mya bankoko ba ye.
II M LinVB 7:25  Ele­nge mobali atali maloba mana mpa­mba. Bongo mokonzi abengi mama, alobi na ye ’te apesa mwana wa ye malako malamu mpo akufa te.
II M LinVB 7:26  Awa mokonzi abo­ndeli ye naino mingi, mama andimi kosolola na mwana mpe kondimisa ye maloba ma mokonzi.
II M LinVB 7:27  Bongo agunzami pe­ne na mwana, mpe atioli mo­ko­nzi monyokoli, mpo alobi na mwana wa ye o lokota la mboka : « Mwana wa ngai, yokela ngai mawa ! Name­meki yo o libumu sanza li­bwa, namelisaki yo mabéle mbula isato mpe nabokoli yo tee lelo.
II M LinVB 7:28  Nabo­ndeli yo, mwana wa ngai, tala likolo na nse na binso bizali wana. Yeba ’te Nzambe akeli bina binso na eloko te, se bongo akeli mpe biso bato.
II M LinVB 7:29  Oba­nga monyokoli oyo te, mpe ndima liwa na mpiko lokola bandeko ba yo ; bo­ngo nazwa yo lisusu elongo na ba­ndeko ba yo o mokolo Nzambe akoyokela biso ngolu. »
II M LinVB 7:30  Esilisi mama koloba bongo, ele­nge mobali alobi : « Okozila nini ? Nakotosa etinda ya mokonzi te. Nakotosa mitindo mya Mobeko moye Moze apesaki bankoko ba biso.
II M LinVB 7:31  Kasi yo moto ozali ntina ya mpasi enene eye ekweli ba-Ebrei, okokima loboko la Nzambe te.
II M LinVB 7:32  Biso tokoyoka mpasi mpo ya masumu ma biso moko.
II M LinVB 7:33  Ata Moko­nzi wa bomoi asilikeli biso mwa mikolo mpo ya kobokolo mpe kobongisa biso, akozongisa bondeko na biso basaleli ba ye.
II M LinVB 7:34  Kasi yo, nsuka ya bato baboya Nzambe mpe ya bato babe, otonda na lole­ndo te, omikosa te na elikya ya mpamba, awa ozali konyokolo basaleli ba Nzambe.
II M LinVB 7:35  Naino okimi etumbu ya Nzambe wa bokasi bonso te, oyo akomonoko maka­mbo manso.
II M LinVB 7:36  Bandeko ba biso bayokaki mpasi eumeli te, sikawa bakozwa bomoi bokoumela seko, mpo ya bondeko boye Nzambe akati na biso. Kasi akosambisa yo mpe akopesa yo etumbu mpo ya lolendo la yo.
II M LinVB 7:37  Lokola bandeko ba ngai nakokaba bomoi mpe nzoto ya ngai mpo ya botosi mibeko mya bankoko. Nabondeli Nzambe ayokela ekolo ya biso mawa noki, kasi andimisa yo na minyoko mpe na mpasi ’te bobele ye azali Nzambe.
II M LinVB 7:38  Nzambe, oyo apesi ekolo ya biso etumbu na ntina, akitisa motema mpo ya mpasi ya ngai mpe ya ba­ndeko ba ngai. »
II M LinVB 7:39  Maloba maye mazokisi moko­nzi ; atoki na nkanda ; apesi mwana oyo wa nsuka etumbu eleki nsomo leka basusu.
II M LinVB 7:40  Elenge mobali oyo awei na motema semba, atii motema mobimba na Nzambe.
II M LinVB 7:42  Tosukisa bongo lisolo lya bolei biloko bya mabonza, mpe lya mi­nyoko mya nsomo.