Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II MACCABEES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15
Prev Up Next
Chapter 6
II M LinVB 6:1  Nsima ya mwa mikolo, mokonzi atindi Geronte, moto wa Atene, akende kondimisa ba-Yuda batika mibeko mya bankoko, batosa mibeko mya Nzambe lisusu te.
II M LinVB 6:2  Batindi ye asantola Tempelo ya Yeruzalem, akomisa yango tempelo ya Zeus wa Olimpos. Akomisa mpe tempelo eye ya ngomba Garizim tempelo ya Zeus Kenio, lokola bato bafandi wana basengi.
II M LinVB 6:3  Mabe mayei se kobakisama na mabe ma liboso mayokisi bato banso mpasi mpenza, bayoki mango mabe.
II M LinVB 6:4  Te­mpelo etondi na makambo ma bosoni mpe ma bosoto ma bapagano. Bazalaki koya wana mpo bakutana na bandumba, mpe balala na basi o lopango la Tempelo mpenza. Bazalaki mpe koya wana na biloko bipekisami.
II M LinVB 6:5  Altare etondi na mabonza maye mobeko mokilisi.
II M LinVB 6:6  Bapekisi kopema o mokolo mwa Sabato, mpe kosepela biyenga bya bankoko. Ata nkombo ya mo-Yuda eta­ngema lisusu te.
II M LinVB 6:7  Sanza na sanza, o mokolo bakokanisaka mbotama ya mokonzi, bato banso batindami na makasi kozala o limpati lya mabo­nza. O mikolo mya eyenga ya Dionisio, bato banso balata enkoti ya nkasa ya nzete, mpe batonga molongo mpo ya kokumisa Dionisio.
II M LinVB 6:8  Tolemeo abimisi etinda ’te o bi­ngu­mba bya ba-Greki bya penepene batinda ba-Yuda basala se bo­ngo : ba-Yuda basangana na ba­ngo o li­mpati lya mabonza.
II M LinVB 6:9  Baye baboyi kolanda mimeseno mya ba-Greki, bakata bango nkingo. Mibeko mina minso milakisi ’te maka­mbo ma mpasi enene malingi ma­kwela ba-Yuda.
II M LinVB 6:10  Mokolo moko bakambi basi babale epai ya bazuzi, zambi bakatisi bana ba bango. Bakangisi bana o mabéle, batambwisi bango bongo o engumba ; na nsima babwaki ba­ngo o nse ut’o efelo ya engumba.
II M LinVB 6:11  Basusu bakendeki kobombama elongo o mabulu ma ngomba mpo ya kosambela na bonkutu o mokolo mwa Sabato. Bafundi bango epai ya Filipo. Batu­mbi bango banso. Bango baluki komibikisa te, zambi balingi komemya mokolo mwa Sabato.
II M LinVB 6:12  Nasengi bato bakotanga buku eye ’te bayoka mabe te na maka­mbo maye ma mpasi. Bandima ’te minyoko miye mizalaki se na ntina ya kobo­ngisa ekolo ya biso, mikoki kobebisa ekolo ya biso te.
II M LinVB 6:13  Soko Nzambe atiki basumuki mikolo mingi te, kasi etumbu ekweli bango noki, elakisi ’te Nzambe alingi ba­ngo.
II M LinVB 6:14  Soko Nzambe aumisi etu­mbu eye akopesa bato ba bikolo bisusu tee masumu ma bango maleki mingi. Mokonzi akosalaka biso bongo te.
II M LinVB 6:15  Alingaki koumisa etu­mbu ya biso te tee masumu ma biso maleki mingi.
II M LinVB 6:16  Nzambe akopimaka biso ngolu ya ye te. Soko atumboli ekolo ya ye na makambo ma mpasi, elakisi ’te akotikaka biso te.
II M LinVB 6:17  Awa nakundoli likambo liye, tokoba naino lisolo lya biso.
II M LinVB 6:18  Eleazar, moko wa bankumu wa bateyi ba Mobeko, asili akomi mobange ; ye moto wa lokumu solo. Bafungoli ye monoko na makasi mpo ’te alia ngulu.
II M LinVB 6:19  Ye alingi kotikala na bomoi bwa nsoni te, kasi aponi liwa lya nkembo : akei na mpiko o esika bakonyokolo ye.
II M LinVB 6:20  Yango wana asanzi bilei baleisi ye ; apesi bato banso bongo ndakisa eye basengeli kolanda, baboya eye epekisami, baluka kotikala na bomoi te na bolei bilei bya ekila.
II M LinVB 6:21  Bato bayangeli limpati liye lya nsomo babendi ye epai ; bayebani ut’o kala. Balobi na ye : « Tokoyela yo nyama epekisami te, ata yo moko okoki kolamba yango ; okosa bongo bani­nga ’te olei nyama ya mabonza lokola mokonzi atindi.
II M LinVB 6:22  Soko osali bongo, bakoboma yo te, mpo tozali baninga banda kala. »
II M LinVB 6:23  Kasi Eleazar akani mokano mokoki na mobange wa lokumu lokola ye. Ye moto wa nsuki mpembe mpo ya misala miike asalaki, moto wa ezalela esantu uta bomwana, akani kotosa maye mobeko mosantu mouti na Nzambe motindi. Yango wana azongiseli bango : « Eleki malamu ’te baboma ngai noki ! »
II M LinVB 6:24  Abakisi : « Ngai mobange nakoki kokosa bato te. Mbele bilenge baike bakoki kokanisa ’te Eleazar, mobange oyo akokisi mibu ntuku libwa, andimi kosala lokola bapagano.
II M LinVB 6:25  Mbele ba­kobunga nzela mpo ya bokosi bwa ngai, mpo natikala naino mwa mikolo na bomoi. Nakoki koyokisa lokumu la ngai mobange nsoni te.
II M LinVB 6:26  Soko sikawa nakimi etumbu ya bato, názala na bomoi to nákufa, nakokima nde etumbu ya Nzambe wa bokasi bonso ?
II M LinVB 6:27  Yango wana, soko nandimi kokufa na mpiko, nakolakisa ’te nazali mobange wa solo,
II M LinVB 6:28  mpe nakopesa bilenge banso ndakisa enzenga. Ngai moko nali­ngi liwa mpo ’te nakumisa mibeko misantu. » Elobi ye maloba mana, akei o esika bakoboma ye.
II M LinVB 6:29  Baye balakisaki ye liboso motema malamu, baka­mbi ye kuna mpe bakomi koyina ye mpo ya maloba alobaki ; batali maloba mana lokola nsuka ya bozoba.
II M LinVB 6:30  Babeti ye fimbo. Elingi ye kokata motema, Eleazar asambeli boye : « Mokonzi ayebi manso, ayebi ’te nakokaki kokima liwa. Soko nazali koyoka mpasi mpenza o nzoto ya ngai mpo ya bobeti fi­mbo, nayoki esengo o motema za­mbi nakobanga se ye. »
II M LinVB 6:31  Se bongo akati motema. Na liwa lya ye apesi bile­nge na mpe bato baike ba ekolo ya ye ndakisa ya mpiko enene mpe ya mabongi ma solo.