II MACCABEES
Chapter 14
II M | LinVB | 14:1 | Nsima ya mibu misato, Yudas na bato ba ye bayoki ’te Demetrio, mwana wa Seleko, asemi o libongo lya Tripoli, ayei na masuwa ndenge na ndenge mpe na basoda ebele, | |
II M | LinVB | 14:3 | Moto moko, nkombo ’te Alkimo, oyo azalaki nganga mokonzi liboso amikomisi moto mbindo o ntango ya botomboki. Sikawa ayebi ’te akoki lisusu kosala ata mosala nini mwa altare esantu te. | |
II M | LinVB | 14:4 | Bongo akei kotala Demetrio o mobu mwa monkama na ntuku itano na moko. Amemeli ye enkoti ya wolo, lindalala na bitapi bya nzete ya oliva, biye bameseni kofuta bo mpako ya Tempelo. Mokolo mona ekoki na ye bongo. | |
II M | LinVB | 14:5 | Kasi noki azwi nzela ya kokokisa mokano mabe mwa ye mokolo Demetrio abengi ye o likita mpe atuni ye makanisi ma ba-Yuda, soko balingi kosala nini. | |
II M | LinVB | 14:6 | Alobi : « Ba-Yuda baye bakobengaka ba-Kasideo mpe bakambami na Yudas balingi lisusu kobimisa bitumba mpe kotomboko. Bakondima te ’te mokili mozala nye. | |
II M | LinVB | 14:8 | Bongo nayei awa liboso mpenza mpo nalingi solosolo ’te makambo ma mokonzi matambola malamu, nalingi ’te bandeko ba ngai ba-Yuda bazwa bolamu. Mpo ya bolema bwa bato baye natangaki ekolo ya biso mobimba ekomi na mpasi mpenza. | |
II M | LinVB | 14:9 | Bongo mokonzi, lokola oyebi makambo maye, nabondeli yo : otala bolamu bwa ekolo mpe bwa ba-Yuda bazali na makama. Sala yango na motema molamu, lokola okosalisaka bato banso. | |
II M | LinVB | 14:11 | Awa asilisi koloba bongo, baninga ba mokonzi, baye balingi Yudas soki te, babakisi maloba mayokisi Demetrio nkanda. | |
II M | LinVB | 14:12 | Bongo ye aponi Nikanor, oyo azalaki mokambi wa bato ba nzoku, aluboli ye moyangeli wa Yudea. Atindi ye | |
II M | LinVB | 14:13 | akende kosukisa Yudas, mpe apanza bato ba ye ; atia mpe Alkimo nganga mokonzi wa Tempelo nta bosantu. | |
II M | LinVB | 14:14 | Bapagano baye Yudas akimisaki o Yudea, bayokani na Nikanor mpe basangani na bato ba ye. Bakanisi ’te minyoko mpe mpasi eye bakoyokisa ba-Yuda, bikobongela bapagano. | |
II M | LinVB | 14:15 | Awa bayoki ’te Nikanor azalaki koya, mpe ndenge bapagano balingi kobundisa bango, ba-Yuda bamipakoli mputulu o mitó. Babondeli Nzambe oyo aponi ekolo ya bango seko, mpe akosalisaka bato ba ye ntango inso polele na bikela binene. | |
II M | LinVB | 14:17 | Simoni, ndeko wa Yudas, abandi kobunda etumba na bato ba Nikanor, kasi akamwi mpo banguna babimelaki ye na mbalakaka, bongo azongi nsima. | |
II M | LinVB | 14:18 | Nikanor ayoki lisolo lya mpiko ya Yudas mpe ya bato ba ye, mpe ndenge bazalaki kobunda na molende mpo ya kobikisa ekolo ya bango. Yango wana abangi kobanda etumba mpo ya kosilisa ntembe na bango. | |
II M | LinVB | 14:20 | Batali malamu makambo nini bazalaki kosenge bango ; na nsima mokambi wa basoda ayebisi mango na basoda ba ye. Banso motema moko bandimi ’te bakoki koyokana na bango. | |
II M | LinVB | 14:21 | Baponi mokolo mpe esika mpo bakonzi bakutana. Epai na epai bayei na likalo, mpe batii kiti ya lokumu. | |
II M | LinVB | 14:22 | O bisika bibongi Yudas abombi basoda bazalaki na bibuneli, mpo babangi ’te banguna bakosala bango mayele mabe na mbalakaka. Kasi bango babale balobani malamu mpe bayokani. | |
II M | LinVB | 14:23 | Nikanor ayei kofanda o Yeruzalem, asali mabe te, kutu azongisi bato balingaki kobunda elongo na ye. | |
II M | LinVB | 14:25 | Apesi ye malako mpo ’te abala mpe abota bana. Yudas asali bongo, akomi na bomoi bwa kimia mpe na boboto. | |
II M | LinVB | 14:26 | Alkimo amoni ’te Nikanor na Yudas bayokani malamu. Akei epai ya Demetrio na monkanda mwa maloba ma bokati bondeko ; alobi na ye ’te mikano mya Nikanor mikokani na bolamu bwa leta te, mpo aponi Yudas, monguna wa bokonzi, akitana ye bo moyangeli. | |
II M | LinVB | 14:27 | Makambo maye ma lokuta ma moto mabe mayokisi mokonzi nkanda, bongo atindeli Nikanor monkanda mpo ya koyebisa ye ’te boyokani bwa ye na Yudas bosepelisi ye soki te, mpe atindi ye akanga Yudas Makabe na minyololo noki mpe atinda ye o Antiokia. | |
II M | LinVB | 14:28 | Ntango Nikanor ayoki yango, mayele masileli ye, mpo koboma bondeko na moto asali likambo lyoko te, eyokisi ye mpasi enene o motema. | |
II M | LinVB | 14:29 | Kasi awa akoki koboya etinda ya mokonzi te, abandi koluka nzela ya kokokisa etinda eye na mayele. | |
II M | LinVB | 14:30 | Makabe amoni ’te Nikanor azalaki kolobisa ye malamu lisusu te, mpe ndenge azalaki kokangela ye elongi ntango bakutani. Ayebi ’te likambo lyango likobongela ye te, bongo abengi bato ba ye baike, mpe akei lisusu epai ya Nikanor te. | |
II M | LinVB | 14:31 | Ntango Nikanor amoni ’te Yudas akomi koyeba mikano mya ye, akei o Tempelo nta bosantu o ntango banganga Nzambe bazalaki kobonza mabonza ma mokolo na mokolo, mpe atindi ’te bakaba Yudas o maboko ma ye. | |
II M | LinVB | 14:32 | Banganga Nzambe balayi ndai, balobi : « Moto oyo ozali koluka, toyebi te esika nini azali. » | |
II M | LinVB | 14:33 | Nikanor atomboli loboko epai ya Tempelo, alayi ndai, alobi : « Soko bokangi ye na minyololo te, mpe bokabi ye o maboko ma ngai te, nakoboma ndako eye esantu ; nakobuka altare mpe o esika eyemei nakotongela Dionisio tempelo kitoko. » | |
II M | LinVB | 14:34 | Esilisi ye koloba bongo, akei. Banganga Nzambe batomboli maboko, babondeli Oyo akosalisaka ekolo ya biso ntango inso, balobi : | |
II M | LinVB | 14:35 | « E Mokonzi, osengeli na eloko te ! Nzokande olingaki ’te Tempelo eye ezala ndako ya yo o ntei ya biso. | |
II M | LinVB | 14:36 | Bongo, Mokonzi nta bosantu, batela ndako eye topetoli bobele sikawa, basantola yango mokolo moko lisusu te. » | |
II M | LinVB | 14:37 | Mokolo moko bafundi Razis, nkumu moko wa Yeruzalem, epai ya Nikanor. Razis azalaki kolinga bato ba ye mingi ; bato banso bazalaki kokumisa ye. Bazalaki kobenga ye « Tata wa ba-Yuda », mpo azalaki moto malamu mpenza. | |
II M | LinVB | 14:38 | O ebandela ya eleko ya botomboki, bafundaki ye ’te alingi makambo ma ba-Yuda. Kasi abangaki te, amikabaki mobimba mpo ya kobatela mibeko mya ekolo ya ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 14:39 | Mpo ya kolakisa ’te alingi ba-Yuda te, Nikanor atindi basoda nkama itano bakanga Razis. | |
II M | LinVB | 14:41 | Mpo ya kokoto o linongi, esika Razis abombami, basoda babuki ezibeli ya linongi, mpe batindi bango ’te bapelisa móto mpe batumba bizibeli. Ntango Razis amoni ’te azingami bongo, amituboli na mopanga. | |
II M | LinVB | 14:42 | Aponi bongo kokufa na lokumu, mpo akwa o maboko ma bato babe te, baye bakonyokolo ye : yango ebongi na nkumu soki moke te. | |
II M | LinVB | 14:43 | Kasi asalaki noki, bongo mopanga mozokisi ye mpota enene te. Ntango basoda basili koyingela, akimi na mpiko kin’o nsonge ya efelo, amibwaki o nse mpo ’te akwela bato bazalaki wana. | |
II M | LinVB | 14:45 | Azalaki naino kopema, ata nzoto mobimba ezalaki kotanga makila ; na mpiko enene atelemi, ata azoki mpota ebele, aleki o kati ya bato tee akomi o nsonge ya libanga pia. | |