Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II MACCABEES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15
Prev Up Next
Chapter 11
II M LinVB 11:1  Lisias, mobokoli mpe ndeko wa mokonzi, oyo aya­ngeli makambo manene ma leta, ayoki mabe mpo ya maye malekaki o Yudea.
II M LinVB 11:2  Noki mpenza asangisi basoda ba makolo nkoto ntuku mwambe na mpe basoda ba farasa banso, mpe akei kobunda na ba-Yuda, mpo ’te akomisa Yeruzalem engumba ya ba-Greki.
II M LinVB 11:3  Alingi mpe kofutisa ba-Yuda mpako ya Te­mpelo lokola bapagano bakofutaka, mpe apesa mobu na mobu bokonzi bwa banganga Nzambe na moto oyo akofuta mosolo moike.
II M LinVB 11:4  Akanisi nguya ya Nzambe soki te. Atii elikya se na basoda ba ye ba farasa nkoto na nkoto mpe na nzoku ya ye ntuku mwambe.
II M LinVB 11:5  Eyingeli ye o Yudea, akomi pene na Betsur, eye ezalaki na ebo­mbamelo, mosika na Yeruzalem kilo­metele soki ntuku ibale na nsa­mbo. Azingi yango.
II M LinVB 11:6  Makabe na bato ba ye bayoki nsango ’te Lisias abundisi ebombamelo. Na mai o miso babondeli Mokonzi elongo na bato banso ’te atindela bango anzelu aya kobikisa Israel.
II M LinVB 11:7  Makabe akamati bibuneli, alendisi baninga ’te babanga likama te, kasi babunda elongo na ye mpo ya kobikisa bandeko. Banso elongo bakei kobu­nda na mpiko enene.
II M LinVB 11:8  Awa batiki Yeruzalem mosika naino te, bamoni moto na farasa, azalaki kokende liboso lya bango ; alati elamba mpembe, amemi bibuneli bya wolo.
II M LinVB 11:9  Banso monoko moko batondi Nzambe nta ngolu ; bayebi ’te sikawa bazwi makasi, babangi lisusu te. Bakoboma bobele bato te, bakoki koboma ata nyama ya za­mba, mpe kobuka ata lopango la bibende.
II M LinVB 11:10  Batongi milongo mya etumba, bakei elongo na mosalisi oyo autaki o likolo, oyo Nzambe atindaki mpo ya ngolu ya ye.
II M LinVB 11:11  Lokola nkosi bakweli banguna o nzoto, mpe babomi basoda nkoto zomi na bato ba farasa nkoto yoko na nkama motoba, bakimisi basusu banso.
II M LinVB 11:12  Ba­ike ba baye bakimi bazoki to batiki bibuneli. Lisias mpe abiki bobele zambi akimaki na nsoni.
II M LinVB 11:13  Lisias, moto wa mayele, akanisi ndenge akweyaki o etumba. Amoni ’te akoki kolonga ba-Ebrei te mpo Nzambe wa bokasi azalaki kosalisa bango. Bongo atindeli bango ba­ntoma
II M LinVB 11:14  mpo ’te bayokana mpe babongisa likambo na bosembo. Alakeli bango ’te akobondela mokonzi monene mpo ’te akata na bango bondeko.
II M LinVB 11:15  Makabe andimi maka­mbo manso Lisias alobi, mpo azalaki kopangana na bolamu bwa bato banso. Mpe ya solo, Mokonzi monene andimi maye manso Makabe asengeki Lisias o monkanda mpo ya bolamu bwa ba-Yuda.
II M LinVB 11:16  Monkanda moye Lisias atindelaki ba-Yuda mozalaki boye : « Boya­mba mbote ngai Lisias natindeli bino ba-Yuda.
II M LinVB 11:17  Bantoma ba bino Yoane na Absalom batikeli ngai mo­nka­nda mozali na nkombo ya bino, mpe basengi ngai eyano.
II M LinVB 11:18  Nayebisi mokonzi manso asengeli koyeba, mpe nandimi maye ngai moko nakoki kondima.
II M LinVB 11:19  Soko bolakisi leta bobele motema molamu, ngai mpe nakoluka kosala bino malamu.
II M LinVB 11:20  Natindi bantoma ba bino mpe bato ba ngai bakende koyokana na bino na likambo lyoko lyoko.
II M LinVB 11:21  Botikala malamu. Mwa 24, sanza Dioskorintios, mobu mwa 148. »
II M LinVB 11:22  Monkanda mouti na mokonzi mokomami boye : « Ndeko wa ngai Lisias, yamba losako la ngai mokonzi Antioko.
II M LinVB 11:23  Awa tata wa ngai akei o mokili mwa banzambe ba biso, nalingi ’te ekolo ya biso ezala nye mpo ’te moto na moto asala mosala mwa ye.
II M LinVB 11:24  Kasi nayoki ’te ba-Yuda bandimi kolanda maka­mbo ma ba-Greki te lokola tata ali­ngaki. Bali­ngi se kola­nda mimeseno mya ba­ngo moko, mpe basengi ngai natika bango balanda mimeseno mya ba­ngo.
II M LinVB 11:25  Nalingi bato ba ekolo ena mpe bafanda nye ; yango wana nalingi batika Tempelo o ma­boko ma bango, mpo ’te balanda mimeseno mya bankoko.
II M LinVB 11:26  Malamu otindela bango moto moko ayokana na ba­ngo mpe ayebisa bango nini biso tolingi, bongo bakitisa mitema mpe basala mosala mwa bango na ese­ngo. »
II M LinVB 11:27  Monkanda moye mokonzi ati­ndelaki ba-Yuda mokomami boye : « Bankumu na ba-Yuda banso, boyamba losako la ngai, mokonzi Anti­oko.
II M LinVB 11:28  Nakolikya ’te bino ba­nso bozali malamu ; ngai mpe nazali se nzoto kolongonu.
II M LinVB 11:29  Menelas ayebisi ngai ’te bolingi kozongela misala mya bino.
II M LinVB 11:30  Nayebisi bino ’te baye bakozonga o sanza eye ya Santiko, bakozwa likambo te.
II M LinVB 11:31  Ba-Yuda ndebakoki lisusu kolia biloko mpe kotosa mibeko mya bango lokola liboso. Moto moko atungisa bango te na makambo bayebaki malamu te.
II M LinVB 11:33  Botikala malamu. Mwa 15, sanza Santiko, mobu mwa 148. »
II M LinVB 11:34  Ba-Roma batindeli ba-Yuda mpe monkanda, mwango moye : « Biso Kwinto Memio, Tito Manilio na Manio Sergio, bantoma ba Roma, mbote na bino ekolo ya ba-Yuda.
II M LinVB 11:35  Maye Lisias, ndeko wa mokonzi andimi, biso mpe tondimi mango.
II M LinVB 11:36  Kasi mpo ya maye alobaki ’te akotuna mokonzi liboso, botindela biso moto moko noki, oyo ayebi mango malamu. Bongo to­koka kolimbolela mokonzi maye makobongela bino, mpo tozali ko­ke­nde o Antiokia.
II M LinVB 11:37  Yango wana boti­ndela biso bantoma noki mpo toyeba makanisi ma bino.
II M LinVB 11:38  Botikala malamu. Mwa 15, sanza Santiko, mobu mwa 148. »