Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 21
Judg LinVB 21:1  O mboka Mispa ba-Israel balayaki ndai eye : « O kati ya biso moto moko akoki kobalela mwa­na wa ye mobali wa Benyamin te ! »
Judg LinVB 21:2  Banso bakei o Betel, esika bafandi o miso ma Yawe tee mpokwa. Baleli makasi mpe na mai o miso balobi :
Judg LinVB 21:3  « E Yawe Nzambe wa Israel, mpo nini tokomi na mawa boye ? Mpo nini o mokolo mwa lelo, o libota lyoko lya Israel bato bazali lisusu te ? »
Judg LinVB 21:4  Mokolo mwa nsima, bato batelemi na ntongontongo mpe batongi altare o esika ena. Babonzi mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko.
Judg LinVB 21:5  Ba-Israel batuni : « Libota nini liyei kosangana na bandeko te o miso ma Yawe ? » Mpo balayaki ndai mpe­nza ’te bakoboma moto oyo ayei o lisanga epai ya Yawe o Mispa te.
Judg LinVB 21:6  Ba-Israel bakomi koyokela bandeko ba bango, ba-Benyamin, mawa. Balobi : « Lelo babomi libota lyoko o Israel.
Judg LinVB 21:7  Tokoki kosala nini mpo ya kopesa basi na baye batikali, mpo tolayaki ndai o miso ma Yawe ’te tokobalisa bango bana ba biso te ? » ba Yabes
Judg LinVB 21:8  Bongo batuni : « Nani o kati ya ma­bota ma Israel ayaki epai ya Yawe o Mispa te ? » Mpe tala, ata moto moko te wa Yabes-Galaad ayaki o nga­nda ya bango.
Judg LinVB 21:9  O ntango babandi kotanga bato, moto moko wa Yabes-Galaad amononi te.
Judg LinVB 21:10  Batindi basoda nkoto zomi na ibale kuna na etinda eye : « Bokende koboma bato banso ba Yabes-Galaad, na basi na bana lokola !
Judg LinVB 21:11  Bokosala boye : Boboma babali banso na mpe basi banso bazalaki na mobali, kasi botika bilenge basi bazali bangondo. » Basali bobele bo­ngo.
Judg LinVB 21:12  O kati ya bato ba Yabes-Galaad bazwi bilenge basi nkama inei, bazalaki ba­ngondo mpe bazalaki na mobali te. Bayei na bango o nganda ya Silo, o mokili mwa Kanana.
Judg LinVB 21:13  Bato banso ba lisanga mobimba batindi bantoma epai ya bato ba Be­nyamin, baye bazalaki o mobenga mwa Rimon, mpe bayebisi bango ’te balingi kotika bitumba.
Judg LinVB 21:14  Bongo ba-Benyamin bazongi. Bapesi bango basi baye babikaki o Yabes-Galaad, kasi banso bazwi basi te.
Judg LinVB 21:15  Bato bayokeli ba-Benyamin mawa, zambi Yawe alongoli libota lyoko o kati ya mabota ma Israel.
Judg LinVB 21:16  Bakolo ba lisanga balobi : « Tosala boni mpo ’te baye batikali bazwa basi, zambi babomaki basi banso ba libota lya Benyamin ?
Judg LinVB 21:17  Bato ba Benyamin bakoki nde kozwa ndambo ya bato te mpo ’te libota lya bango likufa o Israel te ?
Judg LinVB 21:18  Biso moko tokoki kobalisa bango bana ba biso te. Mpamba te, bana ba Israel balayaki ndai eye : Azwa bobe moto oyo apesi mo-Benyamin mwasi wa libala. »
Judg LinVB 21:19  Balobi lisusu : « Mobu na mobu tokosepela eyenga ya Yawe o Silo, kuna o Nordi ya Betel, o Esti ya nzela ekolongwa o Betel mpe ekokende o Sikem o Sudi ya Lebo­na. »
Judg LinVB 21:20  Bongo balobi na ba-Benyamin : « Bokende kobombama o bilanga bya nzete ya vino.
Judg LinVB 21:21  Botala malamu : soko bomoni bilenge basi babimi o Silo mpe bazali kobina mabina, bino bobima o bilanga bya vino mpe moto na moto akanga mwasi o kati ya bilenge basi ba Silo ; na nsima bokoki ko­zonga o mokili mwa Be­nyamin.
Judg LinVB 21:22  Mpe soko batata to bandeko ba bango bayei komilela epai ya biso, tokoyebisa bango : Bondimela bango, zambi basi baye bakangaki o ntango ya etumba bakokaki na bango banso te. Bino moko bokoki kobalisa bango basi te, mbele bokomeme nga­mbo. »
Judg LinVB 21:23  Ba-Benyamin basali bongo. Bakangi bilenge basi o ntango bazalaki kobina wana mpe banso bazwi mwasi, moko moko wa ye. Bongo bakei na bango o mokili mwa bango. Batongi mboka lisusu mpe bafandi wana.
Judg LinVB 21:24  O ntango ena, bato ba Israel bapalangani lisusu, bakei moto na moto o mokili mwa libota lya ye, moto na moto o etuka ya ye ; bakei kofanda o mokili mwa bango moko.
Judg LinVB 21:25  O ntango ena mokonzi azalaki o Israel te. Moko moko azalaki kosala lokola motema mwa ye molingi.