JUDITH
Chapter 2
Judi | LinVB | 2:1 | O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa ye, o sanza ya yambo, o mokolo mwa ntuku ibale na mibale, nsango epalangani o ndako ya mokonzi ’te Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, akobekola o mokili mobimba lokola alobaki. | |
Judi | LinVB | 2:2 | Abengi bankumu na bakomanda ba ye, asangani likita lya bango na bonkutu. Ye moko akani na monoko mwa ye ’te akobebisa mokili mobimba nye. | |
Judi | LinVB | 2:4 | Esili likita, Nabukodonozor, mokonzi wa Asur, abengi Oloferne, moyangeli wa basoda ba ye banso mpe moto wa yambo nsima ya ye, alobi na ye : | |
Judi | LinVB | 2:5 | « Yoka maloba ma ngai, mokonzi monene, nkolo wa mokili mobimba. Kende, kamata elongo na yo basoda ba mpiko baike, basoda ba makolo nkoto monkama na ntuku ibale, na mpe farasa ebele na basoda ba farasa nkoto zomi na ibale. | |
Judi | LinVB | 2:6 | Na nsima kende kobunda na bato epai ya Westi ; mpamba te, baboyaki kotosa maloba ma ngai. | |
Judi | LinVB | 2:7 | Otinda bango bameme mabelé na mai, zambi nakobimela bango na nkanda enene ; basoda ba ngai bakonyata mokili mwa bango na makolo mpe bakobebisa mwango. | |
Judi | LinVB | 2:8 | Ma-bwaku makotonda na bato bazoki o bitumba ; miluka na mingala minso mikotonda na bibembe bya bango. | |
Judi | LinVB | 2:10 | Bongo kende, botolo mokili mwa bango mobimba, mokoma mwa ngai. Soko bamikabi na yo, okozila ngai kin’o mokolo nakoya kotumbola bango. | |
Judi | LinVB | 2:11 | Baye balingi kotosa te, tala bango na miso makasi, mawa te. Boma bango, yiba biloko bya bango binso o mokili moye mobimba natii yo mokonzi. | |
Judi | LinVB | 2:12 | Nalayi na bomoi bwa ngai mpe na bokasi bwa bokonzi bwa ngai, nakosala manso lokola nalobi. | |
Judi | LinVB | 2:13 | Yo nde oboya likambo lyoko lya ngai mokonzi wa yo te, kasi sala manso se lokola natindi yo, sala noki. » | |
Judi | LinVB | 2:14 | Awa Oloferne abimi o ndako ya mokonzi, abengi bankumu, bakonzi na bayangeli ba basoda ba Asur banso. | |
Judi | LinVB | 2:15 | Na nsima aponi basoda ba mpiko se lokola mokonzi atindaki ; azwi basoda nkoto monkama na ntuku ibale, bakisa bato ba farasa nkoto zomi na ibale, banso bazalaki na litimbo o maboko. | |
Judi | LinVB | 2:17 | Na nsima akamati kamela, farasa na mpunda ebele mpenza mpo ya kokumba biloko, na mpe mpata, ngombe na ntaba mpo ya koleisa basoda. | |
Judi | LinVB | 2:18 | Moto na moto azwi biloko bya kolia mingi, na mosolo moike mwa sanduku ya mokonzi, mosolo mwa wolo mpe mwa palata. | |
Judi | LinVB | 2:19 | Na nsima akei elongo na basoda ba ye banso kobunela mokonzi Nabukodonozor etumba ; alingi atondisa mokili mobimba epai ya libongo lya mbu na makalo, na bato ba farasa mpe na basoda ba ye ba mpiko. | |
Judi | LinVB | 2:20 | Bato basusu mingi mpenza balandi bango, ebele lokola mapalela to lokola mbuma ya zelo ; moto moko akoki kotanga bango te. | |
Judi | LinVB | 2:21 | Bongo batiki Ninive mpe bata-mboli mikolo misato o nzela ya esobe ya Bektilet. Longwa Bektilet bakei kopika nganda pene na ngomba o loboko la mwasi la Silisia. | |
Judi | LinVB | 2:22 | Longwa kuna, Oloferne akei epai ya ngomba, na basoda banso elongo, baye ba makolo, ba farasa mpe ba makalo. | |
Judi | LinVB | 2:23 | Alongi Pud na Lud, akangi bato ba Rasis na bana ba Ismael, baye bafandi pene na eliki o Sudi ya Keleon. | |
Judi | LinVB | 2:24 | Akatisi ebale Efrate na mpe mokili mwa Mesopotamia, abebisi bibombamelo binso bitongamaki pene na mongala Abrona tee mbu enene. | |
Judi | LinVB | 2:25 | Na nsima abotoli mokili mwa Silisia, abomi bato banso bameki kobundisa ye. Akomi bongo o mokili mwa Yafet, epai ya Sudi, penepene na Arabu. | |
Judi | LinVB | 2:26 | Azingi mokili mobimba mwa ba-Madian, atumbi nganda ya bango mpe ayibi bibwele bya bango binso. | |
Judi | LinVB | 2:27 | Ekomi eleko ya bobuki mbuma, akei o esobe ya Damasko, atumbi bilanga bya bango binso, abomi ngombe na bibwele bya bango binso, ayibi biloko binso o mboka mpe o bilanga bya bango, abomi bilenge babali banso na mopanga. | |