Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
MATTHEW
Prev Up Next
Chapter 7
Matt LinVB 7:1  Bósámbisa báníngá té, mpô ’te básámbisa bínó té ;
Matt LinVB 7:2  zambí na loléngé bokosámbisa báníngá, bakosámbisa mpé bínó ; na ndélo bokomeka báníngá, bakomeka mpé bínó lokóla.
Matt LinVB 7:3  Mpô níni okotálaka mwâ litíti o líso lya ndeko wa yǒ ? Kasi libáyá o líso lya yǒ mǒkó, ozalí komóno lyangó té !
Matt LinVB 7:4  Bóníbóní okokí koloba na ndeko wa yǒ : ‘Tíká nálongola litíti o líso lya yǒ ’, sókó libáyá lizalí o líso lya yǒ mǒkó ?
Matt LinVB 7:5  Mokíbisi, longólá libosó libáyá o líso lya yǒ mǒkó, bôngó okomóno malámu mpô ’te ólongola litíti o líso lya ndeko wa yǒ.
Matt LinVB 7:6  Bópésa mbwá bilóko bisántu té ; bóbwákela ngúlu mayaka ma bínó té ; mbele ikonyata mangó, mpé na nsima ikozóngela bínó mpô ya kozokisa bínó.
Matt LinVB 7:7  Bósénge mpé bakopésa bínó ; bóluka mpé bokozwa ; bóbétele ezibeli ya ndáko mpé bakofungolela bínó.
Matt LinVB 7:8  Zambí moto nyónso akosénge, akozwa ; óyo akoluka, akomóno ; óyo akobétele ezibeli ya ndá­ko, bakofungolela yě.
Matt LinVB 7:9  Náni o ntéi ya bínó akopésa mwána wa yě libángá, sókó aséngí límpa ?
Matt LinVB 7:10  Tǒ akopésa yě nyóka, sókó aséngí mbísi ?
Matt LinVB 7:11  Bôngó, sókó bínó bato babé bokopésaka bána ba bínó bilóko bilámu, ntembe té, Tatá wa bínó o likoló akopésa bilóko bilekí bilámu na baye baséngí yě !
Matt LinVB 7:12  Mánso bolingí bato básála bínó, bósála bangó sé bôngó : tálá ntína ya Mobéko mpé matéya ma baproféta.
Matt LinVB 7:13  Bóyíngela epái ya ezibeli eké, zambí nzelá ekokamba moto o liwá ezalí enéne mpenzá ; bato baíké bakolandaka yangó.
Matt LinVB 7:14  Kasi nzelá ekokamba moto o bomoi ezalí na ezibeli eké mpé nkáká mpenzá ; baye bakolandaka nzelá êná bazalí míngi té.
Matt LinVB 7:15  Bókéba na baproféta ba loku­tá. Bakoyâ epái ya bínó, balátí mposo ya mpatá, kasi bazalí na mitéma mya nkoi moyíbi.
Matt LinVB 7:16  Bokoyéba bangó na mbuma ya bangó. Bakobúkaka ndé mbuma ya víno o káti ya nzúbe, tǒ mbuma ya fígi o káti ya nsesé ?
Matt LinVB 7:17  Nzeté elámu ekobótaka mbuma ilámu, kasi nzeté ebé ekobótaka mbuma ibé.
Matt LinVB 7:18  Sé bôngó, nzeté elámu ekokí kobóta mbuma ibé té, mpé nzeté ebé ekokí kobóta mbuma ilámu té.
Matt LinVB 7:19  Nzeté ínso ibótí mbuma ilámu té, bakokáta yangó mpé bakobwáka yangó o móto.
Matt LinVB 7:21  Bato bakoloba na ngáí ‘Mokonzi ! Mokonzi !’, bakoyíngela bangó bánso o Bokonzi bwa Likoló té. Ekoyíngela wâná bobélé baye bakosálaka mpô ilingí Tatá wa ngáí azalí o likoló.
Matt LinVB 7:22  Mokolo môná bato baíké bakoloba na ngáí : ‘Mokonzi, Mokonzi, tosakólákí o nkómbó ya yǒ té ? Tobengánákí bazábolo o nkómbó ya yǒ té ? Tosálákí makamwísi o nkómbó ya yǒ té ?’
Matt LinVB 7:23  Kasi ngáí nakoloba na bangó polélé : ‘Nayébí bínó sókí té. Bólongwa mosíká na ngáí, makambo ma bínó mazángí bosémbo.’
Matt LinVB 7:24  Bôngó, moto nyónso ayókí maloba maye ma ngáí mpé akokísí mangó, azalí lokóla moto wa mayéle óyo atóngí ndáko ya yě o mabángá.
Matt LinVB 7:25  Mbúla enókí, mái ma ebale etombókí, mompepe makási moyéí mpé moni­ngísí ndáko êná ; kasi ebúkání té, mpô etóngámí o mabángá.
Matt LinVB 7:26  Kasi moto nyónso ayókí maloba maye ma ngáí mpé akokísí mangó té, azalí lokóla moto azángí mayéle, ató­ngí ndáko ya yě o zélo.
Matt LinVB 7:27  Mbúla enókí, mái ma ebale matombókí, mompepe makási moyéí mpé moningísí ndáko êná ; ndáko ekwéí mpé ebébí nyé ! »
Matt LinVB 7:28  Awa Yézu asílísí koloba bôngó, bato bakámwí míngi na matéya ma yě,
Matt LinVB 7:29  zambí azalákí kotéya bangó lokóla batéyi ba Mobéko té, kasi lokóla moto azali na likoki ya koteya.