Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
PSALMS
Prev Up Next
Chapter 143
Psal LinVB 143:1  Nzembo ya Davidi. Mokonzi, yoka losambo la ngai, tia matoi na mabondeli ma ngai ; mpo ya lobokó mpe bosembo bwa yo, yanola ngai.
Psal LinVB 143:2  Osambisa ngai mosaleli wa yo te, zambi o miso ma yo moto moko azali na bosembo te.
Psal LinVB 143:3  Monguna alingi koboma ngai, abwaki ngai o nse mpe anyati ngai ; afandisi ngai o mboka ya molili lokola bato basili bawei.
Psal LinVB 143:4  Mpema ekomi kosilela ngai, nazali koyoka motema nsomo.
Psal LinVB 143:5  Nakundoli mikolo mya kala na maye manso osalaki, namanyoli misala mya maboko ma yo minso.
Psal LinVB 143:6  Natandeli yo maboko, nayoki yo mposa, lokola mabelé makauki makoyokaka mposa ya mai.
Psal LinVB 143:7  Yaka noki, Mokonzi, yanola ngai, zambi mpema ya ngai elingi esila. Obombela ngai elongi ya yo te, soki te nakokoma lokola bato bakiti o libulu.
Psal LinVB 143:8  Na nta ntongo olakisa ngai bolingi bwa yo, zambi natii elikya se na yo. Yebisa ngai nzela eye nasengeli kolanda, zambi motema mwa ngai molingi se yo.
Psal LinVB 143:9  Mokonzi, bikisa ngai o maboko ma banguna, nayei koluka esika ya kobombama epai ya yo.
Psal LinVB 143:10  Lakisa ngai, nasala maye makosepelisa yo, zambi yo ozali Nzambe wa ngai. Elimo ya yo ekamba ngai o nzela ezangi mabaku.
Psal LinVB 143:11  Mokonzi, mpo ya lokumu la nkombo ya yo, obatela bomoi bwa ngai ; mpo ya ngolu ya yo, obikisa ngai o ntango nakoyoka nsomo.
Psal LinVB 143:12  Mpo ya bolingi bwa yo, osilisa banguna ba ngai ; oboma banyokoli ba ngai banso, zambi ngai nazali mosaleli wa yo.