Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 2
Roma LinVB 2:1  Yǒ moto olingí kokitisa báníngá, atâ ozalí náni, okokí komílóngisa té. Awa olingí kokitisa móníngá, ozalí komíkitisa, zambí yǒ moto ofúndí móníngá, okosálaka mabé lokóla yě.
Roma LinVB 2:2  Toyébí ’te Nzámbe akokitisaka na bosémbo bato bakosálaka bôngó.
Roma LinVB 2:3  Yǒ moto ofú­ndí bato bakosálaka mabé, okosálaka mabé lokóla bangó, okanísí ’te okokíma Nzámbe ntángo akokáta likambo lya yǒ ?
Roma LinVB 2:4  Yǒ ozalí ndé kokínola Nzámbe mpô azalí bobóto míngi, akokangaka motéma mpé akopésaka bato etúmbu nokí té ? Oyébí té ’te na bobóto bwa yě azalí kobyánga yǒ óbóngola motéma ?
Roma LinVB 2:5  Yó, motéma libángá, obóyí kobó­ngola motéma, okongalisa nkándá ya Nzámbe. Ekomónono o mokolo mwa nkándá, mokolo Nzámbe akoyâ kokáta makambo ma bato bánso na bosémbo.
Roma LinVB 2:6  Akofúta moto na moto lifúta likokí na mosálá asálí :
Roma LinVB 2:7  akopésa bomoi bwa sékô na baye bakolukaka na moléndé nkémbo na lokúmu eye ekosíla té.
Roma LinVB 2:8  Kasi nkándá mpé nkele ikokwêla bato bakotósaka Nzámbe té, baye babóyí kolanda matéya ma sôló mpé balandí makambo mazángí bosémbo.
Roma LinVB 2:9  Minyóko mpé malózí makokwêla bato bánso bakosálaka mabé : libosó ba-Yúda, nsima bapagáno.
Roma LinVB 2:10  Kasi bato bánso bakosálaka malámu, Nzámbe akopésa bangó nkémbo, lokúmu na bobóto : libosó ba-Yúda, na nsima bapagáno,
Roma LinVB 2:12  Ya sôló, baye bayébí Mobéko té, sókó basálí masúmu, bakobú­nga, atâ bayébí Mobéko té. Kasi baye bayébí Mobéko, sókó basálí masúmu, Nzámbe akosámbisa bangó engébéné na Mobéko.
Roma LinVB 2:13  Mpá­mba té, baye bayókí Mobéko bobélé na matói, balongóbání o míso ma Nzámbe té ; sé bato bakotósaka Mobéko bakobíka.
Roma LinVB 2:14  Sókó bapagáno bayébí Mobéko té, kasi basálí malámu lokóla Mobéko motíndí, zambí motéma molakísí bangó bôngó, bangó mǒkó bakómí komípésa mibéko, atâ bayébí Mobéko mwa Móze té.
Roma LinVB 2:15  Na maye bakosálaka balakísí ’te Mobéko mozalí o mitéma mya bangó ; mokoyébisaka bangó sókó basálí malámu tǒ mabé.
Roma LinVB 2:16  Mokolo Nzámbe akosámbisa bato na monoko mwa Krístu Yézu, akotála makambo bato basáláká na bonkútú, mokolo môná makambo mâná makobima. Nakoyébisaka bínó bôngó o Nsango Elámu nakotéyaka.
Roma LinVB 2:17  Kasi yǒ moto olobí ’te ozalí mo-Yúda, otíí motéma na Mobéko ; omíkúmísí ’te ozalí moto wa Nzámbe ;
Roma LinVB 2:18  oyébí níni Nzámbe alingí, níni elekí malámu, lokóla Mobéko moyébísí yǒ.
Roma LinVB 2:19  Okanísí ’te okokí kozala mokambi wa bato bakúfá míso, tǒ mwínda mwa bato bakotámbolaka o molílí ;
Roma LinVB 2:20  yǒ mobókoli wa bato bazángí mayéle mpé motéyi wa bato bayékólá té, okanísí ’te ozalí na mayéle mánso mpé okolobaka bobélé makambo ma sôló mpô oyébí Mobéko…
Roma LinVB 2:21  Tálá, yǒ motéyi wa bato basúsu, mpô níni okomítéyaka té ? Okotéyaka ’te báyíba té, kasi yǒ mǒkó okoyíbaka !
Roma LinVB 2:22  Okopekisaka bokáli, kasi yǒ mǒ­kó okosálaka bwangó ! Okotálaka bikeko lokóla bilóko mpámba, kasi okoyíbaka o bisíká bakokúmisaka bikeko.
Roma LinVB 2:23  Okomíkúmisaka ’te oyébí Mobéko, kasi áwa otósí mwangó té, ozalí kobébisa lokúmu la Nzámbe.
Roma LinVB 2:24  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : « Mpô ya bínó ba­pagáno bakotúkaka nkómbó ya Nzámbe. »
Roma LinVB 2:25  Sókó okotósaka Mobéko, kokátisa nzóto ezalí na ntína ; kasi sókó otósí Mobéko té, atâ bakátí yǒ nzóto, ozalí sé lokóla mopagáno.
Roma LinVB 2:26  Sé bôngó, sókó mopagáno atósí mití­ndo mya Mobéko, atâ bakátí yě nzóto té, o míso ma Nzámbe azalí lokóla moto bakátí yě nzóto.
Roma LinVB 2:27  Mpé moto óyo akotósaka Mobéko, atâ bakátí yě nzóto té, akosámbisa yǒ mo-Yúda okotósaka Mobéko té, atâ bakátí yǒ nzóto mpé oyébí Minkandá mya Mobéko.
Roma LinVB 2:28  Moto azalí bobélé mo-Yúda o míso ma bato, azalí mo-Yúda wa sôló té, mpô elembo ya mo-Yúda wa sôló ezalí bobélé o nzóto ya yě té.
Roma LinVB 2:29  Moto azalí mo-Yúda wa sôló o motéma mwa yě, mpô azalí na elembo o motéma, akotósaka bobélé Minkandá mya Mobéko té, akotósaka mpé Elímo Sántu : yě moto akozwa lokúmu epái ya bato té, kasi epái ya Nzámbe.