Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II KINGS
Prev Up Next
Chapter 10
II K LinVB 10:1  Akab azalaki na bana ntuku nsambo o Samaria. Yeku akomi minkanda mpe atindi myango o Samaria epai ya bayangeli ba mboka, na bakolo mpe na babokoli ba bana ba Akab, alobi :
II K LinVB 10:2  « Bino bozali kobokolo bana ba mokonzi, bozali na makalo mpe na farasa, bozali na mboka ezingami na mapango makasi mpe na bibuneli ; mokolo bokozwa monka­nda moye,
II K LinVB 10:3  botala soko nani o kati ya bana ba mokonzi aleki motema malamu mpe mayele, botia ye o ngwe­nde ya tata wa ye, bongo bobunda etumba mpo ya kobatela libota lya mokonzi wa bino. »
II K LinVB 10:4  Bango bakomi kobanga mpe balobi : « Bakonzi babale bakokaki ye te, biso tokobika nde­nge nini ? »
II K LinVB 10:5  Moyangeli wa ndako ya mokonzi, komanda wa mboka, bakolo na babokoli ba bana batindeli Yeku maloba maye : « Biso tozali basaleli ba yo, tokosala manso okotinda biso, tokolubola mokonzi te, sala lokola yo moko omoni. »
II K LinVB 10:6  Yeku akomeli bango monkanda mosusu, alobi : « Soko bondimi ngai solo mpe botosi ngai, bokamata mitó mya bana ba mokonzi wa bino mpe boya kozwana na ngai o Yizreel lobi na ngonga eyemei. » Bana ntuku nsa­mbo ba mokonzi bazalaki kofanda epai ya bato banene ba mboka, baye bazalaki kobokolo bango.
II K LinVB 10:7  Ezwi ba­ngo monkanda mona, bakangi bana ba mokonzi mpe babomi bango ba­nso ntuku nsambo. Batii mitó mya bango o bikoló mpe batindi myango o Yizreel.
II K LinVB 10:8  Ntoma moko akei koyebisa Yeku nsango ena, alobi : « Toyei na mitó mya bana ba mokonzi. » Yeku alobi : « Botia myango mipiko mibale epai ya ezibeli ya mboka tee ntongo sa. »
II K LinVB 10:9  Na ntongo abimi, akei o esika ena mpe alobi o miso ma bato banso : « Bino bozali na likambo te ! Ngai moto natomboki na mokonzi wa ngai mpe nabomaki ye ; kasi bango baye, nani abomi bango ?
II K LinVB 10:10  Boyeba ’te o kati ya maloba manso Yawe alobaki mpo ya libota lya Akab, liloba lyoko likoke-nde mpamba te. Yawe asalaki lokola alobaki na monoko mwa mosaleli wa ye. »
II K LinVB 10:11  Na nsima Yeku abomi bato ba libota lya Akab, baye batikalaki o Yizreel, abomi bato banene banso, na basaleli ba ye, na banganga Nzambe ba ye. Atiki moto moko na bomoi te.
II K LinVB 10:12  Yeku alongwi kuna mpe akei o Samaria. Ekomi ye o nzela ya Bet-Eked, mboka ya bakengeli ba mpata,
II K LinVB 10:13  akuti bandeko ba Okozia, mokonzi wa Yuda, atuni bango : « Bino banani ? » Bazongisi : « Tozali bandeko ba Okozia, toyei kopesa mbote na bana ba mokonzi mpe na mama moko­nzi. »
II K LinVB 10:14  Yeku alobi : « Bokanga bango, kasi boboma bango te. » Bakangi ba­ngo, kasi na nsima babomi bango penepene na libulu lya Bet-Eked ; bazalaki bato ntuku inei na babale, moto moko abiki te.
II K LinVB 10:15  Yeku alongwi kuna mpe akuti Yonadab, mwana wa Rekab, ayei koluka ye. Apesi ye mbote mpe atuni : « Motema mwa yo mozali kolinga ngai solo lokola motema mwa ngai molingi yo ? » Yonadab ayanoli : « Se bongo ! » Yeku azongisi : « Soko ya solo, pesa ngai loboko. » Yonadab apesi ye loboko mpe Yeku abutisi ye o likalo, afandisi ye penepene na ye.
II K LinVB 10:16  Alobi na ye : « Yaka, omono mpiko ya ngai ona Yawe. » Akei na ye o likalo lya ye.
II K LinVB 10:17  Yeku akoti o mboka Samaria mpe abomi bato banso ba libota lya Akab, baye batikalaki o Samaria ; asilisi bango se lokola Yawe alobaki na Elia.
II K LinVB 10:18  Yeku asangisi bato banso mpe alo­bi na bango : « Akab akumisaki Baal se moke, kasi ngai Yeku nalingi kokumisa ye mingi.
II K LinVB 10:19  Sikawa bobenga baprofeta banso ba Baal, baye banso bakosambelaka ye na mpe banganga nzambe ba ye, moto moko azanga te, zambi nalingi kobonzela Baal moboma monene. Moto akoya te, akokufa. » Yeku azalaki kosala mayele, mpo ’te asilisa bato banso bakosalelaka Baal.
II K LinVB 10:20  Atindi boye : « Bosangisa bato o lisanga linene mpo ya Baal. » Bongo babengi bato banso o lisanga.
II K LinVB 10:21  Yeku atindi bantoma o Israel mobimba. Bato banso bazalaki kosambela Baal bayei ; ata moko azangi te. Bakei o tempelo ya Baal, ndako mobimba etondi.
II K LinVB 10:22  Yeku alobi na mokengeli wa bilamba : « Bimisa bilamba mpo ya baye bakosambelaka Baal. » Abimiseli bango bilamba.
II K LinVB 10:23  Yeku ayei o tempelo ya Baal elongo na Yonadab, mwana wa Rekab, alobi na basambeli ba Baal : « Botala malamu ; mosaleli moko wa Yawe azala awa te : bozala se bino na bino basambeli ba Baal. »
II K LinVB 10:24  Yeku na Yonadab bayingeli mpo ya kobonza miboma mpe kotumba mabonza. Nzokande Yeku atiki bato ntuku mwambe o libanda, alobaki na ba­ngo : « Soko o kati ya baye ngai nakokaba bino, botiki moto moko akima, moto atiki ye akokufa o esika ya oyo akimi. »
II K LinVB 10:25  Esilisi Yeku kotumba libonza, alobi na bantoma mpe na baye bazalaki na bibuneli : « Boyingela mpe boboma bango. Moto moko áki­ma te. » Bakengeli na basaleli bakoti, babomi bango na mimpanga mpe babwaki bango o libanda. Na nsima bakoti o esika esantu ya te­mpelo ya Baal.
II K LinVB 10:26  Babimisi ekeko o tempelo ya Baal mpe batumbi yango na móto.
II K LinVB 10:27  Esilisi bango kobuka ekeko ya Baal, babuki mpe tempelo ya Baal, mpe bakomisi yango esika ya kobwaka bosoto ; ezali naino tee lelo.
II K LinVB 10:29  Nzokande alandi ezalela ya Yeroboam, mwana wa Nebat, oyo abendaki ba-Israel o nzela ya masumu ; alongoli bikeko bya wolo bya ngombe o Betel mpe o Dan te.
II K LinVB 10:30  Yawe alobi na Yeku : « Awa osali malamu o miso ma ngai, mpe awa osali libota lya Akab se lokola nalingaki, bana ba yo bakofanda o ngwende ya Israel kin’o libota lya manei. »
II K LinVB 10:31  Kasi Yeku atosi mobeko mwa Yawe Nza­mbe wa Israel na motema moko te. Atiki nzela ya masumu te, eye Yeroboam alakisaki bato ba ekolo Israel.
II K LinVB 10:32  O mikolo mina Yawe abandi kobotolo ba-Israel ndambo ya mokili mwa bango. Azael anyokoli ba-Israel bipai binso.
II K LinVB 10:33  Banda Yordane tee o Esti abotoli mokili mobimba mwa Galaad, mokili mwa ba-Gad, ba-Ruben na ba-Manase, tee Aroer, pene na lobwaku Arnon, na mpe Galaad na Basan.
II K LinVB 10:34  Makambo masusu ma Yeku, misala minso asalaki, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
II K LinVB 10:35  Akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Samaria. Mwana wa ye Yoakas akitani ye.
II K LinVB 10:36  Yeku azalaki mokonzi wa Israel mibu ntuku ibale na mwambe o Samaria.