ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 4
Isai | LinVB | 4:1 | O mokolo mona basi nsambo bakowela mobali moko, bakoloba : « Tokolia mampa ma biso moko, tokolata bilamba bya biso moko, kasi ondima ’te tozala na nkombo ya yo, longola nsoni ya biso. » | |
Isai | LinVB | 4:2 | O mokolo mona, eboto oyo Yawe akobimisa akopesa lokumu mpe nkembo na ekolo ya biso, mwana wa ekolo akozala lokumu mpe esengo ya bato ba Israel babiki. | |
Isai | LinVB | 4:3 | Baye banso batikali o Sion mpe babiki o Yeruzalem, bakobyanga bango basantu, nkombo ya baye banso ikokomama o Yeruzalem mpo bazala na bomoi. | |
Isai | LinVB | 4:4 | Mokolo Yawe akosukola mbindo inso ya Sion, mpe akopetola Yeruzalem mpo ya makila masopani wana na mompepe mwa ye mokokata makambo mpe na ekumbaki ekopelisa móto, | |
Isai | LinVB | 4:5 | Yawe akotanda londende likolo lya ngomba Sion mobimba mpe lya bato bakosangana wana na moi ; na butu akobimisa molinga mokongenge lokola móto. Nkembo ya Yawe ekozipa bango banso, | |