Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 26
Isai LinVB 26:1  O mokolo mona bakoyemba nzembo eye o ekolo ya Yuda : « Tozali na ebombamelo. Nzambe azingi yango na efelo mpe na lopango mpo ya kobatela biso.
Isai LinVB 26:2  Fungola bizibeli bya mboka mpo bato ba bosembo mpe ba lobokó bakoto.
Isai LinVB 26:3  Okopesa bango esika ya boboto mpe ya kimia, zambi bakotiaka elikya na yo.
Isai LinVB 26:4  Botia mitema na Nzambe seko, ye Yawe azali libanga likoninganaka mokolo moko te.
Isai LinVB 26:5  Akitisi baye bakofandaka o ngo­mba, abomi engumba esanda, akweisi yango o nse, abwaki ya­ngo o mabelé.
Isai LinVB 26:6  Bato ba bosawa na bato batau bakonyata yango na makolo. »
Isai LinVB 26:7  Nzela ya moto wa bosembo ezali mabunu mabunu te : yo moto oko­bongiselaka ye nzela.
Isai LinVB 26:8  O nzela eye otindi biso tolanda, tozali se kotia elikya na yo, Yawe, motema mwa biso mokokanisa se nkombo ya yo.
Isai LinVB 26:9  Na butu nakolula yo na motema monso, nakoluka yo na mayele ma ngai manso. O mokolo okokata makambo ma mokili, bato ba nse bakoyeba bosembo bwa yo.
Isai LinVB 26:10  Soko balimbisi moto mabe, akoyekola bosembo te, o mokili mwa bosembo akosala mabe, mpe akomono bonene bwa Yawe te.
Isai LinVB 26:11  E Yawe, loboko na yo ezali likolo, kasi bakomono yango te. Mokolo moko bakoyeba ndenge olingi bato ba yo, bango bakoyoka nsoni, bakosila na móto okopelisa mpo ya banguna ba yo.
Isai LinVB 26:12  E Yawe, yo okopesaka biso boboto, mosala mwa biso, yo moto okokokisa mwango.
Isai LinVB 26:13  Yawe Nzambe wa biso, bakonzi basusu bayangelaki biso, kasi biso toyebi se yo, toyebi bobele nkombo ya yo.
Isai LinVB 26:14  Bato bawei bakosekwa te, bibembe bikoteleme te, yo opesi bango etumbu mpe obomi bango, mpe olongoli nkombo ya bango o mokili !
Isai LinVB 26:15  E Yawe, okomisi ekolo ya biso enene, okolisi yango mpo ya lokumu la yo, obakiseli biso mikili misusu.
Isai LinVB 26:16  E Yawe, toluki yo o ntango ya mpasi, tobeleli yo o ntango opesi biso bitumbu.
Isai LinVB 26:17  E Yawe, o miso ma yo tozali lokola mwasi akwelaki zemi mpe alingi abota, oyo apilingani mpe agangi mpo ya mpasi ya ye.
Isai LinVB 26:18  Ezalaki lokola tokwelaki zemi mpe toyoki mpasi ya kobota, kasi tobotaki se mompepe, tozweli ekolo litomba te, topesi mokili bana te.
Isai LinVB 26:19  Bawei ba yo bakosekwa, bibembe bya bato ba biso bikosekwa. Baye banso balali o mabelé, bakolamuka na nsai enene, mpo yo ozali mamio ma ntongo makopesaka bomoi, yango wana mokili mokozongisela bawa bomoi.
Isai LinVB 26:20  Bino bato ba ekolo ya ngai, boke­nde, bokoto o ndako mpe bokanga ezi­beli nsima ya bino ; bobombama mwa mikolo tee nka­nda ekosila.
Isai LinVB 26:21  Mpo Yawe akobima o ndako ya ye mpo apesa bato ba nse etumbu mpo ya mabe ma bango, mabelé makomonisa makila ma­nso masopani o mokili, mpe makozipa baye babomami lisusu te.