Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
Isai LinVB 3:1  Mokonzi Yawe wa bokasi bonso akobotolo bato ba Yeruzalem mpe ba Yuda biloko binso bisengeli na bango, mampa na mai manso.
Isai LinVB 3:2  Akolongola elombe na soda wa bitumba, na zuzi, na profeta, na nganga nkisi na nkumu,
Isai LinVB 3:3  komanda wa basoda, nkumu na molaki, moto wa bwanya, moto wa ntoki na moloki.
Isai LinVB 3:4  « Nakotia bilenge bazala bayangeli ba bango, báyangela lokola bango moko balingi. »
Isai LinVB 3:5  Bato bakoyokisana mpasi mpe baye bazalaki baninga bakobetana. Bilenge babali bakoluka babange na makambo, bifaka bya bato bakoluka matata na bato ba lokumu.
Isai LinVB 3:6  Moto akokanga ndeko wa ye o ndako ya tata, akoloba : « Yo ozali naino na elamba, bongo zala mokonzi wa biso, tokopesa yo bokonzi o mboka eye ebebi nye. »
Isai LinVB 3:7  Kasi mosusu akoyanola : « Ngai nazali monganga te, o ndako ya ngai nazali na mampa te, elamba mpe te, bolubola ngai mokonzi wa ekolo te. »
Isai LinVB 3:8  Solo, Yeruzalem etuti libaku, Yuda ekwei, mpamba te, na maloba mpe na misala mya bango baluki se kotumola nkembo ya Ya­we.
Isai LinVB 3:9  Bilongi bya bango nsoni te bizali kofunda bango. Balakisi masumu polele lokola bato ba Sodoma, baluki kobomba mabe ma bango te ! Bango moko balingaki ’te mabe ma­kwela bango.
Isai LinVB 3:10  Boloba : Esengo na moto wa bose­mbo, mpo akozwa litomba mpo ya misala mya ye.
Isai LinVB 3:11  Kasi mawa na moto mabe, mpamba te, bakosala ye lokola ye moko asalaki.
Isai LinVB 3:12  E bato ba ngai, bato ba lokoso la mbongo bakonyokoloko bino, mpe bayangeli ba bino bakobotolo bino biloko. E bato ba ngai, bakambi ba bino bakobungisaka bino nzela, bakosalaka ’te bokoka kolanda nze­la ya bino te.
Isai LinVB 3:13  Kasi Yawe atelemi mpo ya kofu­nda bato, mpe mpo ya kosambisa bikolo bya bato.
Isai LinVB 3:14  Yawe akosambisa bakolo na bakonzi ba mboka boye : « Bino bato boliaki mbuma ya ela­nga ya vino, bobombi o ndako biloko biye bobotoli babola.
Isai LinVB 3:15  Nani alingisi bino konyata bato ba ekolo ya ngai, mpe konyokolo babola ? » Mokonzi, Yawe wa bokasi bonso, alobi bongo.
Isai LinVB 3:16  Yawe alobi boye : Tala lolendo la bilenge basi ba Siona : bazali kotombola mitó, kofina liso, kode­nda mpe kolelisa bikómo bya makolo.
Isai LinVB 3:17  Yawe akobelisa bilenge basi ba Siona mpanda o mitó, mpe akokokola mitó mya bango.
Isai LinVB 3:18  Mokolo mona Yawe akolongola biloko bya monzele, ngengele o makolo, bilili bya mwese na sanza,
Isai LinVB 3:20  ngabuni na nsinga ya makolo, nsi­nga ya sapato, sanduku ya malasi mpe biloko bya bikelakela,
Isai LinVB 3:22  bilamba bya monzele na milato mya mapeke, bilamba bya nkingo na mabenga ma kotia biloko,
Isai LinVB 3:23  talatala na bilamba bya malekani, bilamba bya motó na bikembiseli bakolataka o ntolo.
Isai LinVB 3:24  O mokolo mona bakobimisa nsolo ebe esika ya malasi, bakolata mokaba te, kasi nsinga mpamba, bakokanga nsuki te, kasi bakokokola bango mitó, bakolata elamba kitoko te, kasi se nkungulu, bakozala elongi kitoko te, kasi bakokata nzoloko na ebende ya móto.
Isai LinVB 3:25  Babali ba yo bakokufa na mo-mpanga, bilombe ba yo bakokweya o etumba.
Isai LinVB 3:26  O bizibeli bya mboka bakokimela mpe bakozala na lilaka. Awa babali batiki yo, okolala o mabelé.