ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 25
| Isai | LinVB | 25:1 | E Yawe, ozali Nzambe wa ngai, nakokumisa yo, mpe nakoyembela nkombo ya yo, zambi okokisi mikano mya yo mya kokamwa, miye okanaka ut’o kala na bosolo, mikobongwana te. | |
| Isai | LinVB | 25:2 | Okomisi engumba ya bango mopiko mwa mabanga : ezingamaki na mapango, ekomi mopotu monene. Ebombamelo ya bampaya ezali lisusu engumba te, bakotonga yango lisusu mokolo moko te. | |
| Isai | LinVB | 25:3 | Yango wana bato ba ekolo eye enene, baye banyokoli bikolo bisusu, basengeli kondima yo, kobanga mpe kokumisa yo. | |
| Isai | LinVB | 25:4 | Mpo ozali bokasi bwa bato batau, yo bokasi bwa babola o ntango bakeleli, ozali esika bato bakobombama ntango ya mbula, esika bato bakoluka mpio o ntango ya molunge, zambi nkanda ya banyokoli ezali lokola mbula o eleko ya mpio. | |
| Isai | LinVB | 25:5 | Lokola moi makasi mokokaukisa mabelé, osukisi migango mya esengo mya bauta ; lokola limpata likoyokisa mpio ntango ya molunge, osukisi nzembo ya lilonga ya banyokoli. | |
| Isai | LinVB | 25:6 | Yawe wa bokasi bonso akolambela bato ba bikolo binso o ngomba eye limpati lya nyama mafuta mpe lya vino elengi : bakolia nyama ya petepete, bakomele vino elamu. | |
| Isai | LinVB | 25:7 | O ngomba eye akolongola elamba eye ezalaki kozipa bato ba bikolo binso, eye etandamaki likolo lya bato banso. | |
| Isai | LinVB | 25:8 | Yawe akolimwisa liwa seko. Yawe Nzambe akolongola mpizoli o miso ma bato banso. O nse mobimba akolongola nsoni ya bato ba ye ; yemei Yawe alobi bongo. | |
| Isai | LinVB | 25:9 | O mokolo mona bato bakoloba : Nzambe wa biso ye wana, ye oyo totiaki mitema ’te akobikisa biso, ye Yawe oyo tozalaki kolikya na ye. Tosepela mpe toyemba, zambi ye abikisi biso. | |
| Isai | LinVB | 25:10 | Loboko la Yawe lokobatela ngomba eye, kasi Moab anyatemi o mokili mwa ye, lokola matiti o libulu lya bipoli. | |
| Isai | LinVB | 25:11 | O esika ena Moab atandi maboko, lokola moto akati mai atandi mango. Kasi Nzambe akosilisa lolendo la Moab, ata akosala mayele ndenge nini. | |