Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 1
Isai LinVB 1:1  Yoka makambo ma Yuda mpe ma Yeruzalem, maye Izaya, mwa­na wa Amos, amonoki o limoni o eleko ya Ozia, Yotam, Akaz na Ezekia, bakonzi ba Yuda.
Isai LinVB 1:2  Yo likolo, yoka ; yo nse, fongola matoi, mpo Yawe akoloba boye : Naboti bana mpe nabokoli bango, kasi batombokeli ngai.
Isai LinVB 1:3  Ngombe eyebi nkolo wa yango, mpunda eyebi esika nkolo akopesaka yango bilei. Kasi Israel ayebi ngai te, bato ba ekolo ya ngai bazali na mayele te.
Isai LinVB 1:4  Mawa na bino, bato ba masumu, ekolo ya bato babe, libota lya bato bakosalaka mabe, bato babeba ! Botiki Yawe, botioli Mosantu wa Israel, bopesi ye mokongo.
Isai LinVB 1:5  Bolingi nabete bino lisusu, awa bokobi kotomboko ? Bozali kobele mitó, mitema mya bino milembi nye.
Isai LinVB 1:6  Banda nse ya makolo tee motó, nzoto mobimba ebebi : bobele matutu na mpota izali kofungwana, basukoli to bakangi yango te, basopeli yango mafuta mpe te.
Isai LinVB 1:7  Mokili mwa bino mokomi mopotu, bingumba bya bino biziki na móto ; o miso ma bino bauta bayibi mbuma ya bilanga bya bino ; binso bibebi.
Isai LinVB 1:8  Mawa na mwasi ya Sion okomi molako o elanga ya vino, lokola ndako ya mokengeli o ela­nga ya mbika, lokola engumba ezingami na ba­nguna.
Isai LinVB 1:9  Soko Yawe wa bokasi bonso abikisaki mwa ndambo ya bato te, mbele tosilaki lokola Sodoma, mbele tokomaki lokola Gomora.
Isai LinVB 1:10  Bino bakonzi ba Sodoma, boyoka liloba lya Yawe, bino bato ba Gomora, bofongola matoi na mateya ma Nza­mbe wa biso !
Isai LinVB 1:11  Yawe alobi : Nasala nini na mabo­nza ma bino ebele ? Nalembi na mabonza ma kotu­mba ma mpata babali mpe na mafuta ma bana ngombe. Nazali kosepela lisusu te na makila ma ngombe babali, ma bana mpata mpe ma ntaba babali.
Isai LinVB 1:12  Nani abyangi bino mpo bonyata lopango la ngai, ntango boyei mpo ya komilakisa o miso ma ngai ?
Isai LinVB 1:13  Botika koyela ngai mabonza ma mpamba, naboyi ata nsolo ya mango. Sanza ya sika, mikolo mya Sabato, makita… Naboyi biyenga bya bato bazangi bosembo.
Isai LinVB 1:14  Nayini sanza ya sika na biyenga bya bino, bikomeli ngai mokumba moye na­lingi komeme lisusu te.
Isai LinVB 1:15  Ntango botomboli maboko, na­ko­zipa miso. Ata bosambeli mingi, nakoyoka te, mpamba te, maboko ma bino matondi na makila.
Isai LinVB 1:16  Bosukola maboko, bomipetola, namono mabe ma bino lisusu te, botika kosala mabe.
Isai LinVB 1:17  Boyekola kosala malamu, boluka bosembo. Bosalisa baye banyokwami, bobatela mwana etike, bolongisa mwasi bozenge.
Isai LinVB 1:18  Yawe alobi : Boya mpo tosamba ! Ata masumu ma bino mazali motane lokola makila, makokoma peto lokola mbula ya mpembe, ata mazali motane lokola ngola, makokoma kitoko lokola nsuki ya mpata.
Isai LinVB 1:19  Soko bondimi kotosa ngai, bokolia mbuma ya mokili mwa bi­no.
Isai LinVB 1:20  Kasi soko boboyi kotosa mpe botomboki, bokokufa na mompanga. Yawe moto alobi bongo.
Isai LinVB 1:21  Boniboni mboka ya botosi ekomi lokola mwasi ndumba ? Mboka eye esantu mpe ya bose­mbo ekomi kotonda na babomi.
Isai LinVB 1:22  Palata ya yo ekomi na bosoto, vino ya yo ebongwani mai.
Isai LinVB 1:23  Bankumu ba bino batomboki, bayokani na bayibi. Banso balingi ’te bato bapesa ba­ngo makabo, bakowelaka mabonza. Bakolongisaka bana bitike te, bakoboyaka koyoka basi bazenge.
Isai LinVB 1:24  Yango wana, ngai Yawe Nzambe wa bokasi bonso, ngai, Nguya ya Israel, nalobi boye : Nakozongisela banguna mabe basalaki, nakobekola banguna ba ngai.
Isai LinVB 1:25  Loboko la ngai lokobete yo. Nakopetola yo na nkisi lokola bakopetolaka bibende, nakolongola bosoto bwa yo bonso.
Isai LinVB 1:26  Nakosala ’te bazuzi ba yo bakoma lokola baye ba kala, balaki ba yo bakoma mpe lokola ba­ye ba kala. Na nsima bakobyanga yo ‘Engu­mba ya bosembo’, mpe ‘Engumba ya lobokó’.
Isai LinVB 1:27  Sion akobika na bosambisi ye, baye na kati ya Sion bakobo­ngwana mitema bakobika mpo ya bose­mbo.
Isai LinVB 1:28  Bipumbulu na basumuki, banso elongo, bakosila, baye bakotika Yawe, bakokufa.
Isai LinVB 1:29  O ntango ena bokoyoka nsoni na gbukulu iye bokolingaka, mpe na bilanga bya ndunda bikosepelisaka bino.
Isai LinVB 1:30  Zambi bokokoma lokola gbukulu esila nkasa, lokola elanga ya ndunda ezangi mai.
Isai LinVB 1:31  Moto monene akokoma lokola matiti makauka, mpe misala mya ye mikozala lokola móto ; inso ibale ikozika elongo, mpe moto moko akokoka kozimisa móto mwango te.