Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 17
Isai LinVB 17:1  Maloba ma bokaneli Damasko. Damasko ekozala engumba lisusu te, ekokoma se esika ya mabanga.
Isai LinVB 17:2  Bakotika bingumba bya bango seko, bibwele bikozala wana, bikopema wana, moto moko te akobengana byango.
Isai LinVB 17:3  Bibombamelo bya Efraim bikosila, o Damasko mokonzi akozala lisusu te. Ekosukela ba-Aram baye bakotikala se lokola ba-Israel. Yawe wa bokasi bonso alobi bongo.
Isai LinVB 17:4  O mokolo mona lokumu la Yakobo lokosila, nzoto ya ye mafuta ekokondo.
Isai LinVB 17:5  Ekozala lokola eleko ya kobuka mbuma ya mampa, o ntango bakosangisaka mitó mya mbuma o maboke, lokola bakolokotoko mbuma o lo­bwaku la Refaim.
Isai LinVB 17:6  Se mwa mbuma ya oliva ikotikala nsima ya bobuki, bobele mbuma isato to ibale o nsonge ya nzete, mbuma itano to inei o bitapi bya yango. Yawe, Nzambe wa Israel alobi bongo.
Isai LinVB 17:7  O mokolo mona bato bakotala Mozalisi wa bango, bakotombela miso epai ya Mosantu wa Israel.
Isai LinVB 17:8  Bakotala lisusu bitumbelo te, biye basalaki na maboko, makonzi masantu na bitumbelo bya malasi mpe te, biloko biye misapi mya bango misalaki.
Isai LinVB 17:9  O mokolo mona bibombamelo bya bino bikokoma mipotu, se lokola biye bya ba-Amor na ba-Ivi ntango bakimaki ba-Israel kokima. Moto moko akotikala wana lisusu te.
Isai LinVB 17:10  Solo, obosani Nzambe oyo abikisi yo, okanisi lisusu Mobateli wa yo te. Yango wana olonaki mbuma elengi mpe ndunda iuti o ekolo esusu.
Isai LinVB 17:11  O mokolo oloni yango, osili komono mbuma ibimi, mpe banda ntongo mbuma ibimisi fulele, kasi ikobeba, mpe okobuka mbuma yoko te mpe okokoka kobo­ngisa yango te.
Isai LinVB 17:12  Mawa e ! Yoka makeléle ma bato ebele, lokola lokito la mai ma mbu matomboki, makeléle ma bato ebele lokola mai manene.
Isai LinVB 17:13  Bikolo bikotomboko lokola mbo-nge ya mai, kasi ntango Nzambe akaneli ba­ngo bakokima mosika, lokola matiti o ngomba makotombwamaka na mompepe ; lokola mputulu ekopanzanaka na ekumbaki.
Isai LinVB 17:14  Na mpokwa bakoyoka nsomo, na ntongo bakozala lisusu te. Bato babotoli biso biloko bakosuka se bongo, baye babebisi mboka ya biso bakosila se bongo.