ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 40
Isai | LinVB | 40:2 | Boloba na bato ba Yeruzalem mpo bandima na motema, bosakola o miso ma bango ’te boombo bosili, ’te etumbu, eye Yawe apesi bango, esili, etumbu eye enene bazwaki mpo ya masumu manso basalaki. » | |
Isai | LinVB | 40:3 | Lolaka lozali kobelela boye : « Bobongisela Yawe nzela o eliki, bosembolela Nzambe wa bino balabala. | |
Isai | LinVB | 40:4 | Botondisa mabwaku manso, bokitisa ngomba inso, ngomba ya nsonge ekoma esobe, mokili mwa ngomba eke mokoma lobwaku ! | |
Isai | LinVB | 40:5 | Nkembo ya Yawe ekomonono bato banso lisanga bakomono yango mpo Yawe asili alobi bongo. » | |
Isai | LinVB | 40:6 | Nayoki lolaka la moto alobi : « Sakola ! » Ngai nazongisi : « Nasakola nini ? » (Moto ona alobi :) « Bato banso bazali se lokola matiti, bolamu bwa bango lokola fulele ya bilanga. | |
Isai | LinVB | 40:7 | Matiti makauki, fulele esili o mokolo Yawe atindi mpema lokola mompepe. Solo, bato banso bazali se lokola lititi mpamba. | |
Isai | LinVB | 40:9 | Buta ngomba esanda, yo Sion, ntoma wa nsango ya esengo ! Tombola mongongo makasi, obanga te, yo Yeruzalem, ntoma wa nsango ya nsai, loba na bato ba bingumba bya Yuda : « Tala Nzambe wa bino. » | |
Isai | LinVB | 40:10 | Yawe Nzambe akoya na nguya ya ye, akolakisa bokonzi bwa ye. Bato ye abikisi, nde lifuta lya ye mpe elembo ya lilonga lya ye. | |
Isai | LinVB | 40:11 | Lokola mokengeli akoleisa mpata ya ye, akoyamba bana mpata o bontolo, akosangisa yango na loboko la ye, mpe akokamba bamama mpata malembe. | |
Isai | LinVB | 40:12 | Nani ameki bozito bwa mai ma mbu na loboko ? Nani ameki bonene bwa likolo na misapi mya ye ? Nani ameki bozito bwa mabelé ma mokili o sani ? Nani ameki ngomba inene na ike o emekeli ya bozito ? | |
Isai | LinVB | 40:14 | Yawe aluki mayele ma ye epai ya nani ? Nani alakisi ye kosamba makambo ma bato ? Nani ateyi ye mpe ayebisi ye nzela ya bwanya ? | |
Isai | LinVB | 40:15 | Bikolo binso bizali se bo litanga lya mai o katini, bizali se lokola mpumbulu ya zelo o emekeli. Tala bisanga bizali se na bozito lokola mputulu. | |
Isai | LinVB | 40:16 | Nzete inso ya Libano ikokoka te mpo ya kopelisa móto, mpe nyama inso ikokoka te mpo ya kobonzela ye libonza. | |
Isai | LinVB | 40:17 | O miso ma ye bikolo binso bizali se mpamba, akotalaka binso lokola mputulu, lokola biloko mpamba. | |
Isai | LinVB | 40:19 | Moto wa ntoki akonyangwisa ebende, akotula ekeko, akokembisa yango na wolo mpe akobakisa minyololo mya palata. | |
Isai | LinVB | 40:20 | Mosali wa mayele, akopono mabaya malamu ma nzete eye ekopoloko te, mpo asala ekeko eye ekokweya te. | |
Isai | LinVB | 40:21 | Boyebi yango te ? Boyoki yango naino te ? Bayebisaki bino te ut’o libandela lya mokili ? Bongo boyebi te nani azalisaki mokili mobimba ? | |
Isai | LinVB | 40:22 | Ye akofandaka kuna o etando ya likolo, mpe bato ba nse bazali se lokola mapalela. Ye atandi likolo lokola bakotandaka elamba, mpe alingoli lyango lokola ema ya kofanda. | |
Isai | LinVB | 40:24 | Bazali lokola nzete ilonami bobele sika, lokola mbuma iye baloni se sika o mabelé, naino ikotisi nkinga o mabelé te. Soko apemeli yango mpema, ikokauka, ekumbaki ekoki kolongola yango lokola lititi. | |
Isai | LinVB | 40:26 | Botombola miso mpe botala : Nani moto akeli minzoto ? Bobele oyo atiaki myango kuna o molongo mpe akobyangaka moko moko na nkombo. Bokasi bwa ye mpe nguya ya ye eleki bonene, ata monzoto moko mokozanga te. | |
Isai | LinVB | 40:27 | Bino bato ba Yakobo, mpo nini bokolobaka, bino bato ba Israel, mpo nini bokosakolaka ‘te : « Yawe ayebi nzela ya biso te, Nzambe wa biso ayebi makambo ma biso te ? » | |
Isai | LinVB | 40:28 | Boyebi yango te ? Boyoki yango naino te ? Yawe azali Nzambe wa lobiko. Ye moto akeli nse mobimba. Akolembeke te, akotikaka mosala mwa ye te, bwanya bwa ye bozali na nsuka te. | |