Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 40
Isai LinVB 40:1  Nzambe wa bino alobi boye : « Bobondo bato ba ngai.
Isai LinVB 40:2  Boloba na bato ba Yeruzalem mpo bandima na motema, bosakola o miso ma bango ’te boombo bosili, ’te etumbu, eye Yawe apesi bango, esili, etumbu eye enene bazwaki mpo ya masumu manso basalaki. »
Isai LinVB 40:3  Lolaka lozali kobelela boye : « Bobongisela Yawe nzela o eliki, bosembolela Nzambe wa bino balabala.
Isai LinVB 40:4  Botondisa mabwaku manso, bokitisa ngomba inso, ngomba ya nsonge ekoma esobe, mokili mwa ngomba eke mokoma lobwaku !
Isai LinVB 40:5  Nkembo ya Yawe ekomonono ba­to banso lisanga bakomono ya­ngo mpo Yawe asili alobi bongo. »
Isai LinVB 40:6  Nayoki lolaka la moto alobi : « Sakola ! » Ngai nazongisi : « Nasakola nini ? » (Moto ona alobi :) « Bato banso bazali se lokola matiti, bolamu bwa bango lokola fulele ya bilanga.
Isai LinVB 40:7  Matiti makauki, fulele esili o mokolo Yawe atindi mpema lokola mompepe. Solo, bato banso bazali se lokola lititi mpamba.
Isai LinVB 40:8  Lititi likokauka, fulele ekosila, kasi liloba lya Nzambe wa biso likoumela seko. »
Isai LinVB 40:9  Buta ngomba esanda, yo Sion, ntoma wa nsango ya esengo ! Tombola mongongo makasi, obanga te, yo Yeruzalem, ntoma wa nsango ya nsai, loba na bato ba bingumba bya Yuda : « Tala Nzambe wa bino. »
Isai LinVB 40:10  Yawe Nzambe akoya na nguya ya ye, akolakisa bokonzi bwa ye. Bato ye abikisi, nde lifuta lya ye mpe elembo ya lilonga lya ye.
Isai LinVB 40:11  Lokola mokengeli akoleisa mpata ya ye, akoyamba bana mpata o bontolo, akosangisa yango na loboko la ye, mpe akokamba bamama mpata malembe.
Isai LinVB 40:12  Nani ameki bozito bwa mai ma mbu na loboko ? Nani ameki bonene bwa likolo na misapi mya ye ? Nani ameki bozito bwa mabelé ma mokili o sani ? Nani ameki ngomba inene na ike o emekeli ya bozito ?
Isai LinVB 40:13  Nani apesi elimo wa Yawe biti­nda ? Nani alakisi ye to apesi ye malako ?
Isai LinVB 40:14  Yawe aluki mayele ma ye epai ya nani ? Nani alakisi ye kosamba maka­mbo ma bato ? Nani ateyi ye mpe ayebisi ye nzela ya bwanya ?
Isai LinVB 40:15  Bikolo binso bizali se bo litanga lya mai o katini, bizali se lokola mpumbulu ya zelo o emekeli. Tala bisanga bizali se na bozito lokola mputulu.
Isai LinVB 40:16  Nzete inso ya Libano ikokoka te mpo ya kopelisa móto, mpe nyama inso ikokoka te mpo ya kobonzela ye libonza.
Isai LinVB 40:17  O miso ma ye bikolo binso bizali se mpamba, akotalaka binso lokola mputulu, lokola biloko mpamba.
Isai LinVB 40:18  Okanisi ’te Nzambe azali lokola nani ? Ekeko nini eulani na ye ?
Isai LinVB 40:19  Moto wa ntoki akonyangwisa ebe­nde, akotula ekeko, akokembisa yango na wolo mpe akobakisa minyololo mya palata.
Isai LinVB 40:20  Mosali wa mayele, akopono mabaya malamu ma nze­te eye ekopoloko te, mpo asala ekeko eye ekokweya te.
Isai LinVB 40:21  Boyebi yango te ? Boyoki yango naino te ? Bayebisaki bino te ut’o libandela lya mokili ? Bongo boyebi te nani azalisaki mokili mobimba ?
Isai LinVB 40:22  Ye akofandaka kuna o etando ya likolo, mpe bato ba nse bazali se lokola mapalela. Ye atandi likolo lokola bakota­ndaka elamba, mpe alingoli lyango lokola ema ya kofanda.
Isai LinVB 40:23  Ye akokweisaka bankumu ba mokili, akokomisaka bazuzi ba nse bato ba mpamba.
Isai LinVB 40:24  Bazali lokola nzete ilonami bobele sika, lokola mbuma iye baloni se sika o mabelé, naino ikotisi nkinga o mabelé te. Soko apemeli yango mpema, ikokauka, ekumbaki ekoki kolongola yango lokola lititi.
Isai LinVB 40:25  Mosantu alobi : Bokanisi ’te ngai nani ? Nani akokani na ngai ?
Isai LinVB 40:26  Botombola miso mpe botala : Nani moto akeli minzoto ? Bobele oyo atiaki myango kuna o molongo mpe akobyangaka moko moko na nkombo. Bokasi bwa ye mpe nguya ya ye eleki bonene, ata monzoto moko mokozanga te.
Isai LinVB 40:27  Bino bato ba Yakobo, mpo nini bokolobaka, bino bato ba Israel, mpo nini bokosakolaka ‘te : « Yawe ayebi nzela ya biso te, Nzambe wa biso ayebi makambo ma biso te ? »
Isai LinVB 40:28  Boyebi yango te ? Boyoki yango naino te ? Yawe azali Nzambe wa lobiko. Ye moto akeli nse mobimba. Akolembeke te, akotikaka mosala mwa ye te, bwanya bwa ye bozali na nsuka te.
Isai LinVB 40:29  Akolendisaka baye balembi, akopesaka makasi na baye baza­ngi makasi.
Isai LinVB 40:30  Ata bilenge bakoki kolembe nye mpe kolengelenge.
Isai LinVB 40:31  Kasi bato bakotiaka mitema na Yawe bakozwa nguya ya sika, bakopimbwa lokola bingondo, bakopusana liboso mpe bakole­mbe soki te, bakotambola mbangu mpe bakozanga makasi te.