ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 50
Isai | LinVB | 50:1 | Yawe alobi boye : Wapi monkanda mwa bobomi libala, moye molakisi ’te naboyaki mama wa bino ? Nadefisi mbongo na nani mpo ’te natekele ye bino ? Solo, nateki bino mpo ya masumu ma bino, naboyi mama wa bino mpo ya mabe bosalaki ngai. | |
Isai | LinVB | 50:2 | Awa nayaki, mpo nini nakuti moto moko te ? Awa nabyangi, mpo nini moto moko ayanoli te ? Loboko la ngai loleki nde mokuse mpo ya kosikola moto ? Nazangi nde makasi mpo ya kobikisa bato ? Soko nakaneli yango, mbu ekokauka, mpe bibale bikokoma eliki ; mbisi ya yango ikopolo mpo mai mazangi, ikokufa na mposa ya mai. | |
Isai | LinVB | 50:4 | Mokonzi Nzambe ateyaki ngai nayeba koloba mpo ’te na maloba ma ngai nalendisa oyo alembi. Ntongo inso akofungolaka ngai matoi mpo ’te nayoka ye lokola moyekoli akoyokaka moteyi. | |
Isai | LinVB | 50:6 | Nalakisi mokongo na baye bazalaki kobete ngai, napesi matama na baye bazalaki kobila ngai mandefu, nabombi elongi te ntango baseki ngai mpe babwakeli ngai nsoi. | |
Isai | LinVB | 50:7 | Mokonzi Yawe ayaki kosalisa ngai, yango wana nalembi te, mpe nakomisi elongi ya ngai lokola libanga, nayebaki ’te nakoyoka nsoni te. | |
Isai | LinVB | 50:8 | Oyo akolongisa ngai azali penepene. Nani akofunda ngai ? Abima, tosamba biso na ye ! Nani akweisa ngai ? Abeleme mpe aloba ! | |
Isai | LinVB | 50:9 | Tala, Mokonzi Yawe akosalisa ngai, bongo nani akokitisa ngai o likambo ? Banso bakosuka, bakokoma lokola elamba epaswani mpo eliami na mbombo. | |
Isai | LinVB | 50:10 | Oyo o kati ya bino akobangaka Yawe, ayoka maloba ma Mosaleli ! Oyo atamboli o molili mpe amoni polele te, atia elikya na nkombo ya Yawe, asenge lisalisi lya Nzambe wa ye. | |