ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 56
Isai | LinVB | 56:1 | Nzambe alobi boye : Botosa mibeko mpe bozala na bosembo, mpo libiki lya ngai likomi penepene, mpe bosembo bwa ngai bolingi bomonono. | |
Isai | LinVB | 56:2 | Esengo na moto akosalaka bongo, esengo na mwana wa bato oyo akolandaka nzela eye, oyo akosantisaka mikolo mya Sabato mpe akotikaka mabe manso. | |
Isai | LinVB | 56:3 | Mompaya, oyo amipesi na Yawe, aloba te : « Ntembe te, Yawe akotia ngai mpembeni. » Mpe eniki aloba te : « Nazali se nzete ekauki ! » | |
Isai | LinVB | 56:4 | Mpamba te, Yawe alobi boye : ba-eniki bakomemyaka mikolo mya ngai mya Sabato, baye bakondimaka kosala maye makosepelisa ngai mpe bakotosaka bondeko bwa ngai, | |
Isai | LinVB | 56:5 | o ndako mpe o lopango la ngai nakotelemisela bango likonzi, mpe nakopesa bango nkombo, iye ikoleka nkombo ya bana babali na bana basi. Nakopesa bango nkombo ya seko, ekolongwa mokolo moko te. | |
Isai | LinVB | 56:6 | Bampaya baye bandimi kosalela Yawe, balingi nkombo ya Yawe mpe bakomi basaleli ba ye, baye bakosantisaka mikolo mya Sabato, bakosantolaka myango te, mpe bakotosaka bondeko bwa ngai, | |
Isai | LinVB | 56:7 | nakokamba bango o ngomba ya ngai esantu, nakotondisa bango na nsai o ndako ya ngai ya losambo, nakondima mabonza na miboma mya bango o altare ya ngai, zambi ndako ya ngai ekotangema : ‘Ndako ya losambo ya bato ba bikolo binso’. | |
Isai | LinVB | 56:8 | Mokonzi Yawe oyo akosangisa baombo ba Israel bapalangani, alobi boye : Nakobakisa naino bato basusu elongo na baye basili basangani awa. | |
Isai | LinVB | 56:10 | Bakengeli ba bino bakufi miso, bango banso bayebi eloko te. Bazali mbwa ebubu, bayebi kogboma te, baloti ndoto baye balingi se kopema. | |
Isai | LinVB | 56:11 | Bazali lokola mbwa lokoso, bakotondaka te. Bazali bakengeli, kasi bayebi eloko te. Banso bakolandaka nzela ya bango moko mpo ya koluka se bolamu bwa bango moko. | |