ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 5
Isai | LinVB | 5:1 | Tika nayembela moninga wa ngai nzembo, nzembo ya moninga mpo ya elanga ya ye ya vino. Moninga wa ngai azalaki na elanga ya vino o ngomba ya mabelé malamu. | |
Isai | LinVB | 5:2 | Alongoli mabanga, akati elanga, mpe aloni wana nzete ya vino iye aponoki. O elanga eye atongi linongi, atimoli wana mpe ekamolelo ya vino. Akanisi ’te akozwa mbuma ya vino, kasi azwi bobele mbuma ngai. | |
Isai | LinVB | 5:3 | Sikawa, bino bato ba Yeruzalem mpe ba Yuda, bokata likambo kati ya ngai na elanga ya ngai ya vino. | |
Isai | LinVB | 5:4 | Eloko nini nakokaki kosala mpe nasali te ? Nakanisaki ’te nakozwa mbuma ya vino kitoko, mpo nini nazwi bobele mbuma ngai ? | |
Isai | LinVB | 5:5 | Sikawa nakoyebisa bino ndenge nini nakosala na yango : nakolongola lopango mpo ’te nyama isilisa mbuma, nakobuka efelo mpo ’te bato banyata yango. | |
Isai | LinVB | 5:6 | Nakokomisa yango esobe mpamba, nakokata bitapi na matiti lisusu te ; se nzube na matiti mabe bikola wana, nakopekisa mampata manokisa mbula lisusu te. | |
Isai | LinVB | 5:7 | Elanga ya Yawe wa bokasi bonso, nde libota lya Israel, mpe nzete eye ye aponoki, nde bato ba Yuda. Akanisaki ’te bakosala malamu, nzokande bazangaki bosembo, alukaki bosolo, kasi akuti se boleli bwa babola. | |
Isai | LinVB | 5:8 | Mawa na bato bakotongaka ndako ebele, mpe na baye bakosombaka bilanga bipai binso, balingi kozala se bango moko o mokili mpo moninga azwa lisusu esika ya kofanda te. | |
Isai | LinVB | 5:9 | Nayoki na matoi ndai eye Yawe wa bokasi bonso alayi : Ya solo, ndako ebele ikobukana, bato bakofanda o ndako inene lisusu te. | |
Isai | LinVB | 5:10 | Biteni zomi bya elanga bikopesa se milangi minei mya vino, sani zomi ya mbuma ya mampa ikobimisa se sani yoko. | |
Isai | LinVB | 5:11 | Mawa na bato bakomeleka masanga makasi ut’o ntongo, mpe bakoumelaka kina butu na bolangwi vino. | |
Isai | LinVB | 5:12 | Nzenze na lokombe, mbonda na mpiololo ikolelaka o ntango bazali komele mpe kolangwa. Kasi bakokebaka na misala mya Yawe te, bakomonoko mosala mwa maboko ma ye te. | |
Isai | LinVB | 5:13 | Yango wana bato ba ngai bakoke-nde o boombo, zambi bazangi mayele. Bankumu ba ekolo bakokufa na nzala mpe basusu banso bakokufa na mposa ya mai. | |
Isai | LinVB | 5:14 | Yango wana mboka ya bawa ekofungwama polele, ekofungola monoko monene ; bato banene ba ekolo bakokita wana, baye banso bazalaki kosepela mpe kolanda bisengo. | |
Isai | LinVB | 5:16 | Yawe wa bokasi bonso akozwa lokumu mpo ya bosembo bwa ye, mpe Nzambe mosantu akolakisa bosantu mpe bosembo bwa ye. | |
Isai | LinVB | 5:17 | Mokolo mona bana mpata bakolia o esobe ya bango, bana ntaba bakoluka bilei o mapa-ngo bango batiki. | |
Isai | LinVB | 5:18 | Mawa na baye bazali kobenda bitumbu na makulu ma bokosi, mpe masumu lokola bakobendaka makalo. | |
Isai | LinVB | 5:19 | Bango bakolobaka : « Tika asala noki, bongo tomono makambo alingi kosala. Mosantu wa Israel asala mosala moye alingi kosala, mpo toyeba mwango. » | |
Isai | LinVB | 5:20 | Mawa na baye bakotangaka makambo mabe eloko malamu, mpe makambo malamu eloko ya mabe, baye bakotangaka molili mwinda, mpe mwinda molili, likambo lya bololo eloko elengi, mpe likambo elengi eloko ya bololo. | |
Isai | LinVB | 5:21 | Mawa na baye bakomimonoko bato ba bwanya, mpe bakomikumisaka ’te bazali bato ba mayele. | |
Isai | LinVB | 5:22 | Mawa na baye bazali bilombe mpo ya komele vino, baye bazali na mayele mingi ma kosangisa masanga na lotoko. | |
Isai | LinVB | 5:23 | Bakolongisaka moto mabe soko apesi libonza, mpe bakopimaka moto semba makoki ma ye. | |
Isai | LinVB | 5:24 | Yango wana, lokola móto mokosilisa matiti makauki, mpe lokola nkasa iye iziki ikoli-mwa, bakosuka lokola nzete ipoli na nkinga, fulele ya yango ikokweya o nse. Mpamba te, baboyaki mobeko mwa Yawe wa bokasi bonso, bakinolaki liloba lya Mosantu wa Israel. | |
Isai | LinVB | 5:25 | Yango wana Yawe asiliki mingi na ekolo ya ye, atomboli loboko mpe abeti bango, ngomba ikomi kolenge, mpe bibembe bya bango bilali lokola bosoto o balabala. Ata bongo, nkanda ya Yawe ekiti te, mpe azongisi loboko la ye naino te. | |
Isai | LinVB | 5:26 | Na elembo Yawe abyangi bato ba ekolo mosika, abeti mpiololo mpo ya kosangisa bango o nsuka ya mokili, mpe tala, bazali koya noki mpenza. | |
Isai | LinVB | 5:27 | Epai ya bango moto moko te oyo alembi nzoto to akwei, moko te oyo alali mpongi, to alongoli mokaba o loketo, to nsinga ya sapato ya ye ekatani. | |
Isai | LinVB | 5:28 | Makula ma bango mazali bopotu mpe matimbo mabendami, matambi ma farasa ma bango mazali lokola mabanga ma móto, yika ya makalo lokola mompepe makasi. | |
Isai | LinVB | 5:29 | Baleli lokola ntambwe mwasi, lokola bana ntambwe, ingali, ikangi nyama mpe ibendi yango : mpe moto moko te akoki kobotolo yango lisusu. | |