Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 5
Isai LinVB 5:1  Tika nayembela moninga wa ngai nzembo, nzembo ya moninga mpo ya elanga ya ye ya vino. Moninga wa ngai azalaki na ela­nga ya vino o ngomba ya mabelé malamu.
Isai LinVB 5:2  Alongoli mabanga, akati elanga, mpe aloni wana nzete ya vino iye aponoki. O elanga eye atongi linongi, atimoli wana mpe ekamolelo ya vino. Akanisi ’te akozwa mbuma ya vino, kasi azwi bobele mbuma ngai.
Isai LinVB 5:3  Sikawa, bino bato ba Yeruzalem mpe ba Yuda, bokata likambo kati ya ngai na ela­nga ya ngai ya vino.
Isai LinVB 5:4  Eloko nini nakokaki kosala mpe nasali te ? Nakanisaki ’te nakozwa mbuma ya vino kitoko, mpo nini nazwi bobele mbuma ngai ?
Isai LinVB 5:5  Sikawa nakoyebisa bino ndenge nini nakosala na yango : nakolongola lopango mpo ’te nya­ma isilisa mbuma, nakobuka efelo mpo ’te bato ba­nyata yango.
Isai LinVB 5:6  Nakokomisa yango esobe mpa­mba, nakokata bitapi na matiti lisusu te ; se nzube na matiti mabe bikola wana, nakopekisa mampata manokisa mbula lisusu te.
Isai LinVB 5:7  Elanga ya Yawe wa bokasi bonso, nde libota lya Israel, mpe nzete eye ye aponoki, nde bato ba Yuda. Akanisaki ’te bakosala malamu, nzo­kande bazangaki bosembo, alukaki bosolo, kasi akuti se boleli bwa babola.
Isai LinVB 5:8  Mawa na bato bakotongaka ndako ebele, mpe na baye bakosombaka bila­nga bipai binso, balingi kozala se bango moko o mokili mpo moninga azwa lisusu esika ya kofanda te.
Isai LinVB 5:9  Nayoki na matoi ndai eye Yawe wa bokasi bonso alayi : Ya solo, ndako ebele ikobukana, bato bakofanda o ndako inene lisusu te.
Isai LinVB 5:10  Biteni zomi bya elanga bikopesa se milangi minei mya vino, sani zomi ya mbuma ya mampa ikobimisa se sani yoko.
Isai LinVB 5:11  Mawa na bato bakomeleka masanga makasi ut’o ntongo, mpe bakoumelaka kina butu na bolangwi vino.
Isai LinVB 5:12  Nzenze na lokombe, mbonda na mpiololo ikolelaka o ntango bazali komele mpe kolangwa. Kasi bakokebaka na misala mya Yawe te, bakomonoko mosala mwa maboko ma ye te.
Isai LinVB 5:13  Yango wana bato ba ngai bakoke-nde o boombo, zambi bazangi mayele. Bankumu ba ekolo bakokufa na nzala mpe basusu banso bakokufa na mposa ya mai.
Isai LinVB 5:14  Yango wana mboka ya bawa ekofungwama polele, ekofungola monoko monene ; bato banene ba ekolo bakokita wana, baye banso bazalaki kosepela mpe kolanda bisengo.
Isai LinVB 5:15  O ntango ena bakokitisa bato ba lolendo, mpe bato ba lofundo bakosambwa.
Isai LinVB 5:16  Yawe wa bokasi bonso akozwa lo­kumu mpo ya bosembo bwa ye, mpe Nzambe mosantu akolakisa bosantu mpe bosembo bwa ye.
Isai LinVB 5:17  Mokolo mona bana mpata bakolia o esobe ya bango, bana ntaba bakoluka bilei o mapa-ngo bango batiki.
Isai LinVB 5:18  Mawa na baye bazali kobenda bitumbu na makulu ma bokosi, mpe masumu lokola bakobendaka makalo.
Isai LinVB 5:19  Bango bakolobaka : « Tika asala no­ki, bongo tomono makambo alingi ko­sala. Mosantu wa Israel asala mosala moye alingi kosala, mpo toyeba mwango. »
Isai LinVB 5:20  Mawa na baye bakotangaka makambo mabe eloko malamu, mpe makambo malamu eloko ya mabe, baye bakotangaka molili mwinda, mpe mwinda molili, likambo lya bololo eloko elengi, mpe likambo elengi eloko ya bololo.
Isai LinVB 5:21  Mawa na baye bakomimonoko ba­to ba bwanya, mpe bakomikumisaka ’te bazali ba­to ba mayele.
Isai LinVB 5:22  Mawa na baye bazali bilombe mpo ya komele vino, baye bazali na mayele mingi ma kosangisa masanga na lotoko.
Isai LinVB 5:23  Bakolongisaka moto mabe soko apesi libonza, mpe bakopimaka moto semba ma­koki ma ye.
Isai LinVB 5:24  Yango wana, lokola móto mokosilisa matiti makauki, mpe lokola nkasa iye iziki ikoli-mwa, bakosuka lokola nzete ipoli na nki­nga, fulele ya yango ikokweya o nse. Mpamba te, baboyaki mobeko mwa Yawe wa bokasi bonso, bakinolaki liloba lya Mosantu wa Israel.
Isai LinVB 5:25  Yango wana Yawe asiliki mingi na ekolo ya ye, atomboli loboko mpe abeti ba­ngo, ngomba ikomi kolenge, mpe bibembe bya bango bilali lokola bosoto o balabala. Ata bongo, nkanda ya Yawe ekiti te, mpe azongisi loboko la ye naino te.
Isai LinVB 5:26  Na elembo Yawe abyangi bato ba ekolo mosika, abeti mpiololo mpo ya kosangisa bango o nsuka ya mokili, mpe tala, bazali koya noki mpenza.
Isai LinVB 5:27  Epai ya bango moto moko te oyo alembi nzoto to akwei, moko te oyo alali mpongi, to alongoli mokaba o loketo, to nsinga ya sapato ya ye ekatani.
Isai LinVB 5:28  Makula ma bango mazali bopotu mpe matimbo mabendami, matambi ma farasa ma bango mazali lokola mabanga ma móto, yika ya makalo lokola mompepe makasi.
Isai LinVB 5:29  Baleli lokola ntambwe mwasi, lokola bana ntambwe, ingali, ikangi nyama mpe ibendi yango : mpe moto moko te akoki kobotolo yango lisusu.
Isai LinVB 5:30  Mokolo mona bakogangela bango makasi mpenza ; ekozala lokola makeléle ma mbu enene. Oyo akotala mokili, akomono se molili mwa nsomo, mpo ya mampata maindo makozipa moi.