ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 54
Isai | LinVB | 54:1 | Yo ekomba, obotaki te, sikawa sepela, yo mwasi oyebaki mpasi ya kobota te, ganga na nsai, mpo Yawe alobi ’te bana ba mwasi azangaki mobali baleki bana ba mwasi wa libala na boike. | |
Isai | LinVB | 54:2 | Bongisa esika ya ema ya yo, ekoma enene, tanda elamba ya ema o esika okofandaka, otala motuya te, bakisa nsinga ya kokanga mpe le-ndisa pike makasi, | |
Isai | LinVB | 54:3 | mpo bokozala mingi bipai binso. Bana ba yo bakokoma bankolo ba bikolo bisusu, bakotondisa bingumba bisilaki bato. | |
Isai | LinVB | 54:4 | Obanga te, bakoyokisa yo nsoni lisusu te ; oyoka nsoni te, zambi bakosambwisa yo lisusu te. Okobosana nsoni oyokaki o ntango ya bolenge, okokanisa nsoni lisusu te ya ntango ozalaki mwasi bozenge. | |
Isai | LinVB | 54:5 | Mpo Oyo akeli yo akozala mobali wa yo, nkombo ya ye Yawe wa bokasi bonso. Mosantu wa Israel, ye moto akosikola yo, nkombo ya ye Nzambe wa nse mobimba. | |
Isai | LinVB | 54:6 | Ya solo, lokola mwasi aboyami na mobali wa ye, mpe motema mwa ye mokomi na mawa mingi, se bongo Yawe abyangi yo lisusu. Bakoboyaka nde mwasi wa bolenge ? Nzambe wa yo alobi bongo. | |
Isai | LinVB | 54:8 | Mwa ntango nazalaki na nkele mingi, nabombelaki yo elongi. Yawe Mosikoli wa yo alobi : Na bolingi nsuka te, nayokeli yo ngolu. | |
Isai | LinVB | 54:9 | Se lokola o mikolo mya Nowe, ntango nalayaki ’te mai makozindisa mokili lisusu te, nalayi ’te nakosilikela yo lisusu te, mpe nakokanela yo lisusu te. | |
Isai | LinVB | 54:10 | Ata ngomba inene to ike ikoki koningana to kolongwa, nakotika kolinga yo mokolo moko te, bondeko kati ya biso na yo bokobeba mokolo moko te. Elobi bongo Yawe, oyo akoyokelaka yo ngolu. | |
Isai | LinVB | 54:11 | Yo, mboka ya mawa, mimpepe mibeteki yo, mpe moto moko abondoki yo te. O kati ya mabanga ma yo nakotia sima ya langi, nakotia mabanga ma yo ma nse o safir. | |
Isai | LinVB | 54:12 | Nakokembisa manongi ma yo na diama, bizibeli bya yo na mabanga makongengeke mpe lopango mobimba na mabanga ma motuya. | |
Isai | LinVB | 54:14 | Bakotonga yo likolo lya bosembo, bakonyokolo yo lisusu te, okobanga eloko te, okoyoka lisusu nsomo mokolo moko te. | |
Isai | LinVB | 54:15 | Soko bakoyela yo etumba, ekozala mpo ya ngai te, oyo akosala yo mabe akosuka o miso ma yo. | |
Isai | LinVB | 54:16 | Ngai moto nakeli motuli, oyo akopelisaka móto mwa makala mpe akobimisaka bisaleli mpo ya mosala mwa ye ; ngai mpe nakeli mobebisi mpo ’te abebisa. | |