Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 10
Isai LinVB 10:1  Mawa na baye bakobimisaka mibeko mibe, mpe bakokomaka bitinda bikoyokisa bato mpasi.
Isai LinVB 10:2  Bakopimaka bongo babola makoki ma bango mpe bato ba ngai biye bisengeli na bango ; bakoyibelaka basi bazenge biloko, mpe bakobotoloko bana bitike biloko.
Isai LinVB 10:3  Bino bokosala nini o mokolo bakokata makambo, o mokolo mpasi ekouta na bato ba mosika ? Bokokima epai ya nani mpo ya kozwa lisalisi ? Bokobomba nkita ya bino epai ya nani ?
Isai LinVB 10:4  Mokolo mona bokogumbama lokola baombo mpe bokokufa o nta­ngo ya bitumba. Kasi nkele ya Yawe esili te, na loboko la ye azali kokanela ba­ngo naino.
Isai LinVB 10:5  Mawa na Asur, fimbo ya nkanda ya ngai, lingenda lya nkele o maboko ma ngai.
Isai LinVB 10:6  Natindaki Asur akende kobundisa ekolo ya basumuki, akende kotumbola ekolo ya bato bayokisi ngai nkanda, ayiba mpe abotolo bango biloko, anyata bango lokola potopoto o nzela.
Isai LinVB 10:7  Kasi ye azalaki na makanisi mana te, azalaki na mikano misusu o motema : alingaki se koboma bato mpe kobebisa bikolo mingi.
Isai LinVB 10:8  Amilobelaki : « Bakomanda ba ngai banso bazali makasi lokola bakonzi te ?
Isai LinVB 10:9  Nabotoli Kalno lokola Karkemis, Amat lokola Arpad, mpe Samaria lokola Damasko.
Isai LinVB 10:10  Soko nakamati bikolo bya bato bakokumisaka bikeko, leka biye bya Yeruzalem mpe bya Samaria.
Isai LinVB 10:11  Maye nasali na Samaria mpe na banzambe ba ye, nakosala bongo na Yeruzalem mpe na bikeko bya ye. »
Isai LinVB 10:12  Mokolo Mokonzi akosilisa mosala mwa ye o ngomba Sion mpe o Yeruzalem, akopesa mokonzi wa lolendo wa Asur etumbu, mpo ya maye asali na miso ma lofundo.
Isai LinVB 10:13  Mpo Asur alobaki : « Nasali bongo na makasi, na mayele mpe na bwanya bwa ngai moko. Napusi ndelo ya bikolo bisusu nsima, nabotoli bango nkita, nalongoli bakonzi o ngwende ya bango, ngai elombe !
Isai LinVB 10:14  Nabotoli nkita ya bikolo bisusu lokola bakokamataka zumbu lya ndeke. Nakamati mokili mwa bango mobimba, lokola bakokamataka makei maye ndeke etiki ; ndeke yoko te etandaki mapapu, to efungoli monoko mpo ya kolela. »
Isai LinVB 10:15  Nsoka éfunda nde o miso ma oyo akokataka nzete ? Mosumani mómikumisa o miso ma oyo akosalaka na mwango ? Fimbo ekoki kotinda oyo abeti na yango ? Lingenda likoki nde kotombola moto asimbi lyango ?
Isai LinVB 10:16  Yango wana, Yawe wa bokasi bonso akokondisa bato bazali nzoto mafuta ; móto mokozikisa lipombo lya ye, mpe mokosilisa binso lokola móto monene.
Isai LinVB 10:17  Mwinda mwa Israel mokokoma móto monene, mpe Mosantu wa ye akopela lokola móto, mokotumba mpe mokosilisa nzube na matiti ma ye o mokolo moko.
Isai LinVB 10:18  Nzete ya ye ebele mpe elanga ya ye, Yawe akosilisa yango inso nye, lokola moto wa malali alingi akufa.
Isai LinVB 10:19  Nzete iye itikali o zamba lya ye, ikozala se moke, ata mwana moke ndakoki kotanga yango.
Isai LinVB 10:20  O mokolo mona bato bakotikala o Israel mpe ba libota lya Yakobo, bakotika kotia mitema na monyokoli wa bango, kasi bakotia elikya na Yawe, Mosantu wa Israel.
Isai LinVB 10:21  Ndambo ya bato ba Yuda bakotikala bakozongela Nzambe wa bokasi.
Isai LinVB 10:22  E Israel, ata bato ba yo bazalaki mingi lokola zelo o libongo, baye bakozonga bakozala se moke. Basili bakani koboma ekolo : bose­mbo bokomonono malamu.
Isai LinVB 10:23  Mpamba te, Yawe wa bokasi bo­nso asili akati likambo ’te baboma mokili mobimba nye.
Isai LinVB 10:24  Yango wana Yawe Nzambe wa bokasi bonso alobi boye : E bino bato ba ngai, bokofandaka o ngo­mba Sion, bobanga bato ba Asur te, awa babeti bino fimbo mpe batomboli lingenda lokola bato ba Ezipeti basalaki.
Isai LinVB 10:25  Mpamba te, etikali moke, mwa mo­ke mpenza, natika koyoka nka­nda ; kasi nakosilisa bango na nkele ya ngai.
Isai LinVB 10:26  Yawe wa bokasi bonso akobete ba­ngo fimbo, lokola abeteki bato ba Madian penepene na ngomba Oreb, lokola asalaki na ba-Ezipeti nta­ngo atombolaki lingenda lya ye likolo lya mbu.
Isai LinVB 10:27  O mokolo mona mokumba ba-Asur batielaki yo mokolongwa o mapeke ma yo, mpe ekangiseli ya bango ekolongwa o nkingo ya yo.
Isai LinVB 10:28  Bato ba Asur bakei kobundisa Ayat, bakatisi Migron, bakitisi biloko bya bango o Mikmas.
Isai LinVB 10:29  Baleki o kati ya ngomba, balobi : « Lelo na butu tokopika nganda o Geba. » Bato ba Rama balengi, bato ba Gibea ya Saul bakimi.
Isai LinVB 10:30  E mwana wa Galim, ganga makasi ! Yo Lais, keba ! Bino bato ba Anatot, boyanola ye !
Isai LinVB 10:31  Bato ba Madmena bakimi, bato ba Gebim bakei kobombama.
Isai LinVB 10:32  Lelo bakopema o mboka Nob, bakokanela bato ba Sion na ngomba Yeruzalem.
Isai LinVB 10:33  Yawe Nzambe wa bokasi bonso akokata bitapi na makasi, biye bileki bolai, akosilisa byango nye ; biye bipusi lokumu, akokitisa bya­ngo.
Isai LinVB 10:34  Nzete ilai ya zamba ikokatema na soka, mpe loboko la Nzambe lokokweisa Libano.