Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 62
Isai LinVB 62:1  Mpo ya Sion nakotika te koloba, mpo ya Yeruzalem, nakopema te, tee bosembo bwa ye bokotana lokola ntongo mpe libiki lya ye likongenge lokola mwinda.
Isai LinVB 62:2  Bato ba bikolo binso bakomono bosembo bwa yo mpe bakonzi banso bakomono nkembo ya yo. Bakopesa yo nkombo ya sika, Yawemei akopono nkombo eye.
Isai LinVB 62:3  Okozala enkoti ya lokumu o maboko ma Yawe, lokola enkoti ya bokonzi o maboko ma Nzambe wa yo.
Isai LinVB 62:4  Bakotanga yo lisusu ‘Etula’ te, mokili mwa yo bakotanga mwa­ngo lisusu ‘Mopotu’ te. Kasi bakobyanga yo ‘Mwasi wa bolingo’, mpe mokili mwa yo : ‘Mwasi wa libala’, mpo Yawe akosepelaka yo mingi, akobala ekolo ya yo lokola mwasi wa ye.
Isai LinVB 62:5  Lokola elenge mobali akobalaka mwasi wa ye, oyo akotonga yo akobala yo. Lokola mobali akosepelaka mwasi oyo abali, se bongo Nzambe wa yo akosepela yo.
Isai LinVB 62:6  E Yeruzalem, natii bakengeli o bifelo bya yo, mingongo mya bango miyokana butu moi : « Bosengeli kokundolela Yawe ma­kambo manso, bokoki kopema ata moke te.
Isai LinVB 62:7  Bopesa ye mpe nzela ya kopema te tee abongisi Yeruzalem mpe akomisi yango mboka ya lokumu o nse mobimba. »
Isai LinVB 62:8  Yawe alayi na loboko la ye la mobali : « Nakopesa banguna mbuma ya mampa ma yo lisusu te mpo balia. Awa omilembisi mpo ya kokata bilanga, bampaya bakomele lisusu vino ya yo te.
Isai LinVB 62:9  Kasi baye basangisi mbuma ya ma­mpa bakolia yango, na ntina ena bakokumisa Yawe ; baye basangisi mbuma ya vino ba­komele vino o lopango la Te­mpe­lo ya ye. »
Isai LinVB 62:10  Bobima, boleka o bizibeli bya mboka, bobongisela bato nzela : Bolalisa balabala patatalu, bolongola mabanga. Botombola bendele mpo ’te bato bamono yango.
Isai LinVB 62:11  Yawe alobi na bato ba nse mobi­mba : « Loba na bato ba Sion boye : Tala, libiki la yo ekomi pene, akoya na mbuma ya lilonga lya ye : bato alongoli o maboko ma ba­nguna bakoya liboso lya ye.
Isai LinVB 62:12  Bakotanga bango ‘Ekolo esantu’, ‘Bato Yawe asikoli’. Mpe bakotanga yo ‘Engumba ya bolingo’, ‘Engumba eye Nzambe atiki te’ ! »