Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 29
Isai LinVB 29:1  Mawa na yo, Ariel ! Ariel, engumba eye Davidi afanda­ki. Tika mibu milandana mpe bato basepela biyenga.
Isai LinVB 29:2  Kasi ngai nakoyokisa Ariel mpasi mingi, bato bakokimela mpe bakolela makasi, o miso ma ngai akozala se lokola etumbelo.
Isai LinVB 29:3  Nakopika nganda penepene na yo, nakozinga yo bipai binso, mpo ya kobundisa yo nakokangisa yo epai na epai.
Isai LinVB 29:4  Bakokitisa yo, okoloba lokola moto alali o mabelé, okoloba malembe lokola moto azindi o kati ya zelo, mongongo mwa yo lokola mo­ngongo mwa elima, maloba ma yo lokola maloba ma moto afandi o mabelé.
Isai LinVB 29:5  Banguna ebele bakoyela yo lokola mputulu, banyokoli mingi bakoyela yo lokola matiti makauki. Yango ekosalema se na mbalakaka.
Isai LinVB 29:6  Yawe wa bokasi bonso akoya epai ya yo na makeléle ma nkake, mokili mokoningana makasi, akoya na ekumbaki mpe na mbula makasi, o kati ya móto mokopela mpe mokosilisa binso.
Isai LinVB 29:7  Bato ba bikolo binso bakobunda na Ariel, baye bakobunda, bakonyokolo mpe bakozinga ye, bakozala lokola ndoto, lokola limoni na butu.
Isai LinVB 29:8  Lokola moto akufi na nzala mpe aloti ’te azali kolia, kasi o ntango alamuki azali se koyoka nzala ; to lokola moto akufi na mposa ya mai, aloti ’te azali komele, kasi o ntango alamuki, alembi mpe mongongo mokauki. Ekozala bobele bongo na bato ba bikolo binso, baye bayaki kobundisa ngomba Sion.
Isai LinVB 29:9  Bokotalana na bokamwi, bokokoma na lolanda mpe bokomono te. Bokolangwa, kasi mpo ya vino te, bokondingbandingba, kasi mpo ya masanga te.
Isai LinVB 29:10  Zambi Yawe atindeli bino elimo ekolalisa bino mpongi makasi. Akangi miso ma bino, baprofeta, azipi mitó mya bino na elamba, bamoni-makambo.
Isai LinVB 29:11  Ndimbola ya makambo manso maye bomonoki ekomeli bino lokola bikoma bya buku ekangemi makasi. Bakopesa buku yango na moto ayebi kotanga, mpe bakoloba na ye : « Tanga yango. » Kasi ako­loba : « Nayebi kotanga yango te, zambi buku ekangemi makasi. »
Isai LinVB 29:12  Na nsima bakopesa buku na moto ayebi kotanga te, mpe bakoloba na ye : « Tanga yango. » Kasi ye ako­yanola : « Nayebi kotanga te. »
Isai LinVB 29:13  Yawe alobi : Bato baye balingi ngai se na maloba, bakokumisaka ngai se na monoko, kasi mitema mya bango mizali mosika na ngai, bakobangaka ngai bobele mpo ya mobeko mwa bato, moye bato balakisi bango.
Isai LinVB 29:14  Yango wana nakokoba kolakisa bango makamwa, makambo makokamwisa bango, bongo bwanya bwa bato ba bwa­nya bokosila, mpe mayele ma bato ba mayele makolimwa.
Isai LinVB 29:15  Mawa na bato bakosalaka maka­mbo ma bonkutu mpo ya kobo­mbela Yawe mikano mya bango. Bakosalaka mango o kati ya molili mpe bakolobaka : « Nani azali komono biso, nani ayebi biso ? »
Isai LinVB 29:16  Yango nsuka ya mayele mabe mpe­nza ! Mosali mbeki aulani nde na mabelé lido ? Eloko ekoki nde koloba na mosali : « Yo osali ngai te » ? Mbeki ekoki nde koloba na moyemi : « Yo oyebi mosala te » ?
Isai LinVB 29:17  Etikali se mwa mikolo, ngomba Libano ekobongwana lopango la nzete ya mbuma, mpe lopango loye la nzete ya mbu­ma lokokoma lokola zamba.
Isai LinVB 29:18  O mokolo mona bato bakufi miso bakoyoka maloba ma buku, bato ba lolanda bakobika mpe miso ma bango makomono.
Isai LinVB 29:19  Bato bake bakoyoka esengo mpo ya Nzambe, mpe bato babola bakosepela Mosantu wa Israel.
Isai LinVB 29:20  Mpamba te, banyokoli bakozala lisusu te, mpe baye bayebi se koseke bakolimwa, baye bakolukaka kosala mabe bakolongola bango o mokili.
Isai LinVB 29:21  se bongo baye bakokitisaka baninga na maloba ma lokuta, na baye bakotielaka zuzi mota­mbo o esambi, na baye bakokweisaka bato ba bo­sembo.
Isai LinVB 29:22  Yango wana, Yawe Nzambe wa libota lya Yakobo, oyo asikolaki Abarama, alobi boye : Uta lelo bato ba Yakobo bakoyoka nsoni lisusu te, bakobanga likambo lyoko lisusu te,
Isai LinVB 29:23  Zambi ntango bakomono maye nakosala o kati ya bango, bakokumisa nkombo ya ngai. Solo, bakopesa Mosantu wa Yakobo lokumu, mpe bakobanga mingi o miso ma Nzambe wa Israel.
Isai LinVB 29:24  Baye babungisi mayele, bakozwa mayele ma sika, baye bapusi kolobaloba, bakondima kozwa mateya.