ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 29
Isai | LinVB | 29:1 | Mawa na yo, Ariel ! Ariel, engumba eye Davidi afandaki. Tika mibu milandana mpe bato basepela biyenga. | |
Isai | LinVB | 29:2 | Kasi ngai nakoyokisa Ariel mpasi mingi, bato bakokimela mpe bakolela makasi, o miso ma ngai akozala se lokola etumbelo. | |
Isai | LinVB | 29:3 | Nakopika nganda penepene na yo, nakozinga yo bipai binso, mpo ya kobundisa yo nakokangisa yo epai na epai. | |
Isai | LinVB | 29:4 | Bakokitisa yo, okoloba lokola moto alali o mabelé, okoloba malembe lokola moto azindi o kati ya zelo, mongongo mwa yo lokola mongongo mwa elima, maloba ma yo lokola maloba ma moto afandi o mabelé. | |
Isai | LinVB | 29:5 | Banguna ebele bakoyela yo lokola mputulu, banyokoli mingi bakoyela yo lokola matiti makauki. Yango ekosalema se na mbalakaka. | |
Isai | LinVB | 29:6 | Yawe wa bokasi bonso akoya epai ya yo na makeléle ma nkake, mokili mokoningana makasi, akoya na ekumbaki mpe na mbula makasi, o kati ya móto mokopela mpe mokosilisa binso. | |
Isai | LinVB | 29:7 | Bato ba bikolo binso bakobunda na Ariel, baye bakobunda, bakonyokolo mpe bakozinga ye, bakozala lokola ndoto, lokola limoni na butu. | |
Isai | LinVB | 29:8 | Lokola moto akufi na nzala mpe aloti ’te azali kolia, kasi o ntango alamuki azali se koyoka nzala ; to lokola moto akufi na mposa ya mai, aloti ’te azali komele, kasi o ntango alamuki, alembi mpe mongongo mokauki. Ekozala bobele bongo na bato ba bikolo binso, baye bayaki kobundisa ngomba Sion. | |
Isai | LinVB | 29:9 | Bokotalana na bokamwi, bokokoma na lolanda mpe bokomono te. Bokolangwa, kasi mpo ya vino te, bokondingbandingba, kasi mpo ya masanga te. | |
Isai | LinVB | 29:10 | Zambi Yawe atindeli bino elimo ekolalisa bino mpongi makasi. Akangi miso ma bino, baprofeta, azipi mitó mya bino na elamba, bamoni-makambo. | |
Isai | LinVB | 29:11 | Ndimbola ya makambo manso maye bomonoki ekomeli bino lokola bikoma bya buku ekangemi makasi. Bakopesa buku yango na moto ayebi kotanga, mpe bakoloba na ye : « Tanga yango. » Kasi akoloba : « Nayebi kotanga yango te, zambi buku ekangemi makasi. » | |
Isai | LinVB | 29:12 | Na nsima bakopesa buku na moto ayebi kotanga te, mpe bakoloba na ye : « Tanga yango. » Kasi ye akoyanola : « Nayebi kotanga te. » | |
Isai | LinVB | 29:13 | Yawe alobi : Bato baye balingi ngai se na maloba, bakokumisaka ngai se na monoko, kasi mitema mya bango mizali mosika na ngai, bakobangaka ngai bobele mpo ya mobeko mwa bato, moye bato balakisi bango. | |
Isai | LinVB | 29:14 | Yango wana nakokoba kolakisa bango makamwa, makambo makokamwisa bango, bongo bwanya bwa bato ba bwanya bokosila, mpe mayele ma bato ba mayele makolimwa. | |
Isai | LinVB | 29:15 | Mawa na bato bakosalaka makambo ma bonkutu mpo ya kobombela Yawe mikano mya bango. Bakosalaka mango o kati ya molili mpe bakolobaka : « Nani azali komono biso, nani ayebi biso ? » | |
Isai | LinVB | 29:16 | Yango nsuka ya mayele mabe mpenza ! Mosali mbeki aulani nde na mabelé lido ? Eloko ekoki nde koloba na mosali : « Yo osali ngai te » ? Mbeki ekoki nde koloba na moyemi : « Yo oyebi mosala te » ? | |
Isai | LinVB | 29:17 | Etikali se mwa mikolo, ngomba Libano ekobongwana lopango la nzete ya mbuma, mpe lopango loye la nzete ya mbuma lokokoma lokola zamba. | |
Isai | LinVB | 29:18 | O mokolo mona bato bakufi miso bakoyoka maloba ma buku, bato ba lolanda bakobika mpe miso ma bango makomono. | |
Isai | LinVB | 29:19 | Bato bake bakoyoka esengo mpo ya Nzambe, mpe bato babola bakosepela Mosantu wa Israel. | |
Isai | LinVB | 29:20 | Mpamba te, banyokoli bakozala lisusu te, mpe baye bayebi se koseke bakolimwa, baye bakolukaka kosala mabe bakolongola bango o mokili. | |
Isai | LinVB | 29:21 | se bongo baye bakokitisaka baninga na maloba ma lokuta, na baye bakotielaka zuzi motambo o esambi, na baye bakokweisaka bato ba bosembo. | |
Isai | LinVB | 29:22 | Yango wana, Yawe Nzambe wa libota lya Yakobo, oyo asikolaki Abarama, alobi boye : Uta lelo bato ba Yakobo bakoyoka nsoni lisusu te, bakobanga likambo lyoko lisusu te, | |
Isai | LinVB | 29:23 | Zambi ntango bakomono maye nakosala o kati ya bango, bakokumisa nkombo ya ngai. Solo, bakopesa Mosantu wa Yakobo lokumu, mpe bakobanga mingi o miso ma Nzambe wa Israel. | |