ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 13
Isai | LinVB | 13:2 | Botia bendele o nsonge ya ngomba ezangi nzete, boganga migango mya etumba, mpe bobyanga bango na loboko mpo ’te baya penepene na bizibeli bya bankumu. | |
Isai | LinVB | 13:3 | Ngai napesi babuni ba ngai basantu bitinda, na nkanda ya ngai nabyangi bato ba ngai ba mpiko, nasangisi bilombe ba ngai ba bitumba. | |
Isai | LinVB | 13:4 | Boyoka makeléle o ngomba, lokola makeléle ma bato ebele. Boyoka lokito la bato ba bikolo basangani. Yawe wa bokasi bonso akotala bato ba ye bakei etumba. | |
Isai | LinVB | 13:5 | Bauti o ekolo mosika, o nsuka ya mokili, Yawe elongo na basoda ba nkanda ya ye, mpo ya kobebisa mokili mobimba. | |
Isai | LinVB | 13:6 | Bolela na mawa, zambi mokolo mwa Yawe mokomi penepene, lokola mobebisi Nzambe wa bokasi akosilisa mokili mobimba. | |
Isai | LinVB | 13:8 | Bayoki nsomo, mpasi na malozi ikweli bango, bapilingani lokola mwasi alingi abota, batalani na nsomo, bilongi bya bango biteli. | |
Isai | LinVB | 13:9 | Tala, mokolo mwa Yawe mozali koya, mawa te, mokoya na nkanda eleki makasi mpo ya kosilisa mokili mpe koboma basumuki. | |
Isai | LinVB | 13:10 | Minzoto minene mpe mike mizali kongenge lisusu te. Banda ntongo etani, mwese mokomi molili mpe sanza ezali kopesa lisusu mwinda te. | |
Isai | LinVB | 13:11 | Nakopesa bato banso etumbu mpo ya mabe ma bango, nakotumbola basumuki mpo ya masumu ma bango. Nakosukisa bato ba lolendo, nakosukisa lofundo la banyokoli. | |
Isai | LinVB | 13:12 | Nakosilisa bato mpo bakoma moke lokola wolo kitoko, bazala moke lokola wolo ya Ofir. | |
Isai | LinVB | 13:13 | Yango wana nakoningisa likolo mpe mokili mokolenge o makonzi ma mwango, o mokolo Yawe wa bokasi bonso akolakisa nkanda, o mokolo akotokisa nkele ya ye. | |
Isai | LinVB | 13:14 | Ekozala lokola mboloko ekimi likama, mpe lokola etonga ya mpata izali na mokengeli te, moto na moto akozonga epai ya bato ba ye, mpe akokima o mokili mwa ye moko. | |
Isai | LinVB | 13:16 | Bakonyata bana bake o miso ma baboti ba bango, bakobuka ndako ya bango, bakobebisa basi ba bango. | |
Isai | LinVB | 13:17 | Nakotinda ba-Medi bakende kobunda na bango, bato baye bayebi motuya mwa palata te, mpe bakokinolaka ata wolo. | |
Isai | LinVB | 13:18 | Matimbo ma bango makosilisa bilenge ba bango, bakoyokela bana mawa te, bakoyokela ata bana bake ngolu te. | |
Isai | LinVB | 13:19 | Mpe Babilone, nsuka ya bingumba binso, ekembiseli mpe litundu lya ba-Kaldea, ekokoma lokola Sodoma na Gomora, Nzambe akosilisa yango. | |
Isai | LinVB | 13:20 | Mokolo moko lisusu te bato bakokende kofanda kuna, ata bankoko ba bango te. Mo-Arabu akopika nganda kuna lisusu te, bakengeli ba mpata mpe bakopema kuna te. | |
Isai | LinVB | 13:21 | Nyama ya zamba ikofanda kuna, bisulungutu bikotonda o ndako ya bango, maligbanga ikokende kofanda kuna, mpe ntaba babali ikokende kobina kuna. | |