Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 42
Isai LinVB 42:1  Tala mosaleli wa ngai oyo nakolendisaka, naponi ye mpe nakosepelaka ye mingi. Nakitiseli ye elimo wa ngai, mpo ’te alakisa bikolo binso mibeko mya bosembo.
Isai LinVB 42:2  Akogangaka te, akotombolaka mo­ngongo te, akoyokisaka lolaka la ye o balabala te.
Isai LinVB 42:3  Soko monkekele mobukani, akokata mwango te, soko móto molembi, akozimisa mwango te, solo, akosakola mibeko mya bosembo.
Isai LinVB 42:4  Akolembeke te, akozongaka nsima te tee bosembo bwa ye bokopikama o nse mobimba, mpo bato ba bisanga balingi koyeba mibeko mya ye.
Isai LinVB 42:5  Yawe Nzambe alobi bongo. Ye akeli likolo mpe atandoli lyango, abongisi mabelé na mbuma ya ma­ngo inso, apesi bikelamo binso bizali wana mpema, mpe apesi binso bikotambolaka o nse bomoi :
Isai LinVB 42:6  « Ngai Yawe nabyangi yo ozala nze­neneke wa bosembo bwa ngai ; nasimbi yo na loboko mpe nabo­ngisi yo, naponi yo ozala moto wa bondeko na ekolo ya ngai mpe mwinda mwa bikolo binso :
Isai LinVB 42:7  ofungola miso ma baye bakufi miso, obikisa bato bakangemi o boombo, mpe obimisa baye bafandi o molili mwa boloko. »
Isai LinVB 42:8  Nkombo ya ngai nde Yawe ! Nakotikela moto mosusu nke­mbo ya ngai te, nakopesa banzambe basusu lokumu la ngai te.
Isai LinVB 42:9  Makambo ma liboso masili maleki, nakoyebisa bino makambo ma sika, nakoyebisa bino mango liboso ’te masalema.
Isai LinVB 42:10  Boyembela Yawe nzembo ya sika ! Boyembela nkembo ya ye o nse mobimba, bino bato bokotambolaka o mbu mpe binso bizali wana, na bino bato ba bisanga.
Isai LinVB 42:11  Bato bakofandaka o mboka ya eliki, bato ba nganda ya mokonzi Kedar, bato bakofandaka o ngomba ya mabanga, bayemba mpe baganga makasi ut’o nsonge ya ngomba.
Isai LinVB 42:12  Bakumisa nkombo ya Yawe, basakola nkembo ya ye o bisanga.
Isai LinVB 42:13  Yawe akei liboso lokola elombe, lokola soda wa mpiko enene, ayokisi migango mya etumba, amonisi bokasi bwa ye o miso ma banguna.
Isai LinVB 42:14  Yawe alobi : « Uta kala nafandaki nye, nalobaki eloko te, nazalaki koka­nga motema. Sikawa nakimeli lokola mwasi ali­ngi abota, nabendi mpema mpe nabimisi ya­ngo makasi.
Isai LinVB 42:15  Nakobebisa ngomba inene na ike, nakokaukisa matiti manso o esobe, nakobongola mingala minso mokili, nakokaukisa maziba masila mai.
Isai LinVB 42:16  Nakokamba bato ba lolanda o nzela iye bayebi te, nakotambwisa bango o nzela balekaki liboso te. Liboso lya bango nakokomisa mo­lili mwinda, mpe nakobongisa nzela ya maba­nga ikoma balabala kitoko. Nakosala bongo, nakotika bango te.
Isai LinVB 42:17  Bakozonga nsima, na nsoni mpe­nza, baye bakotiaka mitema na bikeko bya bango mpe bakolobaka : Bino bozali banzambe ba biso ! Bato ba Israel bazali na lolanda. »
Isai LinVB 42:18  Bino bato bokufi matoi, boyoka ! Bino bato ba lolanda, botala mpe bomono !
Isai LinVB 42:19  Nani akufa miso lokola mosali wa ngai ? Nani akufa matoi lokola ntoma oyo nakotinda ? Nani akufa miso lokola Molingami wa ngai ? Nani akufa matoi lokola Mosaleli wa Yawe ?
Isai LinVB 42:20  Omoni makambo mingi, kasi oke­bi na mango te, ofungoli matoi, kasi oyoki eloko te.
Isai LinVB 42:21  Yawe alingaki, mpo ya bosembo bwa ye, kopesa yo Mobeko monene mpe monzenga.
Isai LinVB 42:22  Kasi bayibeli mpe babotoli Israel biloko, mpe bakangi bango o mabulu mpe o boloko. Bayibi biloko bya bango mpe moto moko asalisi bango te, babotoli bango biloko mpe moto moko te alobi : Zongisa !
Isai LinVB 42:23  O kati ya bino nani atii matoi na maloba maye ? Nani akebi na mango mpo azwa mayele ma sika mpo ya mikolo mikoya ?
Isai LinVB 42:24  Nani akabi Yakob o maboko ma bayibi, mpe Israel o maboko ma baye bakobotoloko biloko ? Ezali bobele Yawe, mpo tobuki mibeko mya ye, toboyi kolanda nzela ya ye mpe kotosa Mobeko mwa ye.
Isai LinVB 42:25  Bongo alakisi Israel nkanda ya ye, atindeli bango bitumba bya nsomo. Móto mwa bitumba mozikisi ba­ngo, kasi bamoni ntina ya yango te, mpe bakebi na yango te.