ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 57
Isai | LinVB | 57:1 | Soko moto semba akufi, moto moko te akopangana na ye ; soko babomi bato balamu moto moko akokeba na yango te. Moto semba akokufa mpo ya mabe ma bato, | |
Isai | LinVB | 57:2 | kasi ye akokoto o boboto. Bato balandi nzela semba bakopema na boboto o mbeto ya bango. | |
Isai | LinVB | 57:3 | Bino, bana ba mwasi wa likundu, bobeleme awa, bana ba libota lya bato ba bokali mpe ba bondumba. | |
Isai | LinVB | 57:4 | Bozali nde koseke nani ? Bofungoli monoko monene mpe bobimisi lolemu mpo ya koseke nani ? Botondi na masumu, bino bato ba lokuta. | |
Isai | LinVB | 57:5 | Bino bato bokosepelaka o nse ya nzete ya gbukulu, mpe o nse ya nzete inso ya nkasa ibesu, bokobomaka bana o mabwaku, mpe o mibenga mya mabanga. | |
Isai | LinVB | 57:6 | Bolingi se koluka mabanga kitoko o mabwaku, mpo mazala bikeko bokokumisaka ! Bokobonzelaka byango mabonza ma bomeli, mpe mabonza masusu. Makambo mana makoki nde kosepelisa ngai ? | |
Isai | LinVB | 57:7 | Otandi litoko lya yo o nsonge ya ngomba esanda, obuti kuna mpo ya kobonza moboma mwa yo. | |
Isai | LinVB | 57:8 | Otii ekeko ya yo nsima ya monoko mwa ndako, solo, mosika na ngai olongoli bilamba, obuti mbeto ya yo mpe omilalisi wana. Oyokani na moto alingi kolala na yo mpe o ntango ena otali bolumbu bwa ye. | |
Isai | LinVB | 57:9 | Obonzeli nzambe Melek mabonza ma mafuta, opanzi malasi ebele, otindi bantoma ba yo mosika, kin’o mboka ya bawa. | |
Isai | LinVB | 57:10 | Olembi mpo otamboli mosika, kasi ata bongo okotikaka te. Nzoto ya yo ezwi lisusu makasi ma kala, yango wana elembeki soki te kosala mambi mabe. | |
Isai | LinVB | 57:11 | Obangaki nani mpe oyokaki nsomo mpo ya nani mpo ’te okosa boye, okanisa ngai te, to opangana na ngai lisusu te ? Awa nalobaki eloko te mpe nakangaki miso, obangaki ngai lisusu te. | |
Isai | LinVB | 57:13 | Soko okoganga mpo ’te bikeko bya yo ebele bibikisa yo, mompepe mokolongola byango binso, ata mpema mpamba ekobengana byango. Kasi oyo akotia elikya na ngai, akokoto o mokili mwa ngai, mpe akokoma nkolo wa ngomba ya ngai esantu. | |
Isai | LinVB | 57:14 | Bakoloba : Bolalisa mabelé, bobo-ngisa nzela, bolongola mabaku manso o nzela ya bato ba ngai. | |
Isai | LinVB | 57:15 | Yawe wa Nta Likolo, Oyo akofandaka o ndako ekokufaka te, Oyo nkombo ya ye ezali esantu, alobi boye : « Nazali mosantu oyo afandi o likolo, kasi nazali mpe pene na bato ba mawa, mpe na baye banyokwami. Baye banyokwami na baye bazali na mawa, nakolendisa bango mitema. | |
Isai | LinVB | 57:16 | Nakofunda mabe ma bato ntango inso te, nakolakisa nkanda mikolo minso te, soki te, mayele makosilela bango, mpe bato ngai moko nakelaki bakobeba. | |
Isai | LinVB | 57:17 | Nayokaki nkanda mpo basali mabe mingi na lokoso, nabeteki bango na nkanda, kasi namibombaki, nzokande batomboki baye bakobi kolanda mposa ya motema. | |
Isai | LinVB | 57:18 | Namoni mabe ma bango, kasi nakobikisa mpe nakokamba bango, nakobondo bango. O kati ya bango baye bazali na mawa | |
Isai | LinVB | 57:19 | bakokumisa ngai na monoko : « Yawe alobi boye : Boboto bozala na baye bazali mosika mpe na baye bazali penepene. Nakobikisa bango. » | |
Isai | LinVB | 57:20 | Kasi bato babe baulani na mbu etomboki, ekoki kotikala nye te mpe mbonge ya yango itindiki zelo na potopoto. | |