ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 2
Isai | LinVB | 2:2 | O mikolo mikoya ngomba ya ndako ya Yawe ekoleka ngomba inene na ike inso na lokumu. Bato ba bikolo binso bakokende kuna. | |
Isai | LinVB | 2:3 | Bato ebele bakoya kuna mpe bakoloba : « Yakani, tobuta ngomba ya Yawe, tokende o ndako ya Nzambe wa Yakob, alakisa biso nzela ya ye mpe tokolanda yango. Solo, Mobeko mwa Nzambe mokouta o Sion, liloba lya Yawe likouta o Yeruzalem. » | |
Isai | LinVB | 2:4 | Akosambisa bato ba bikolo binso, akozala zuzi wa bato ebele. Na mimpanga mya bango bakotula nkongo, mpe na makongo ma bango bakotula bibende mpo ya kokata mabelé. Bakotombola lisusu mimpanga te mpo ya kobunda na ekolo esusu, bakoyekola lisusu kobunda bitumba te. | |
Isai | LinVB | 2:5 | Yakani, bino bato ba libota lya Yakob, tolanda mwinda mwa Yawe. Yawe akosambisa bato ba lolendo | |
Isai | LinVB | 2:6 | Solo, obwaki ekolo ya yo, bato ba libota lya Yakobo. Ekolo ya bango etondi na bamoni-makambo, na banganga nkisi, lokola epai ya ba-Filisti, mpe na bauta. | |
Isai | LinVB | 2:7 | Ekolo ya bango etondi na palata mpe na wolo, na nkita nsuka te, na farasa mpe na makalo ebele. | |
Isai | LinVB | 2:8 | Ekolo eye etondi na bikeko bya banzambe ba lokuta, bakokumbamelaka biloko bango moko basali, bakokumisaka bikeko bisalemi na maboko ma bango. | |
Isai | LinVB | 2:10 | Bokende o mibenga mya ngomba, bobombama o kati ya mabelé, mosika na Yawe mpe na nkembo ya bokonzi bwa ye. | |
Isai | LinVB | 2:11 | Bakokitisa bato ba lolendo, mpe bato ba lofundo bakosambwa. O mokolo mona Yawe, se ye moko, akozwa lokumu. | |
Isai | LinVB | 2:12 | Zambi mokolo moko Yawe wa bokasi bonso akosukisa bato banso ba lolendo mpe ba lofundo, akokitisa bato banso bamitomboli. | |
Isai | LinVB | 2:17 | Bakokitisa bato ba lolendo, mpe bato ba lofundo bakosambwa. O mokolo mona Yawe, se ye moko, akozwa lokumu, | |
Isai | LinVB | 2:19 | Bakokoto o mibenga, o mabulu ma mabelé, mosika na Yawe mpe na nkembo ya bokonzi bwa ye, mokolo akoteleme mpo ya koningisa mokili. | |
Isai | LinVB | 2:20 | O mokolo mona bato bakobwakela mpoko na mangembo bikeko bya bango bya palata mpe bya wolo, biye basalaki mpo ya kokumbamela byango. | |
Isai | LinVB | 2:21 | Bakokoto o mibenga mpe o mabulu ma ngomba mosika na Yawe mpe na nkembo ya bokonzi bwa ye, mokolo akoteleme mpo ya koningisa mokili. | |