Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 31
Isai LinVB 31:1  Mawa na baye bakokendeke koluka lisalisi o Ezipeti. Bakotiaka elikya na farasa ya bango, na makalo mingi mpe na ebele ya basoda ba bango. Kasi bakotalaka Mosantu wa Israel te, bakotunaka Yawe te.
Isai LinVB 31:2  Nzokande Yawe ye mpe azali na mayele, akoki kotinda mpasi, ako­bo­ngolaka maloba ma ye te. Akoteleme mpo ya kobunda na libota lya bato babe mpe na baye bakosalisaka bango.
Isai LinVB 31:3  Moto wa Ezipeti azali se moto, azali nzambe te, farasa ya ye izali se minsuni, kasi elimo te. Mokolo Yawe akotanda loboko la ye, ba­nso bakokufa elongo : ná oyo akobatelaka ná oyo azwi bobateli.
Isai LinVB 31:4  Yawe alobi na ngai boye : Lokola ntambwe to mwana wa yango eka­ngi nyama, ata babyangi bake­ngeli ba mpata mpo ekima, nta­mbwe ekobanga te soko bagangi, ekoyoka nsomo te soko basali ma­keléle, se bongo Yawe wa bokasi bonso akokita mpo ya kobu­ndisa o Sion mpe ngomba eke.
Isai LinVB 31:5  Lokola ndeke ikopimbwaka, se bo­ngo Yawe wa bokasi bonso ako­batela Yeruzalem, akobatela mpe akokengele mboka, akosalisa mpe akobikisa bato.
Isai LinVB 31:6  E bato ba Israel, bozongela Moko­nzi, mpamba te, bosili botiki ye mosika.
Isai LinVB 31:7  O mokolo mona moto na moto akobwaka bikeko bya banzambe ba lokuta bisalemi na palata mpe na wolo, biye bosali na maboko ma bino basumuki.
Isai LinVB 31:8  Ba-Asur bakokufa na mompanga mwa bato te, mompanga mwa bato mokosilisa bango te ; bakokima mompanga, mpe bilenge ba ye bakokoma baombo.
Isai LinVB 31:9  Mokonzi wa bango akobanga mpe akokima, bakomanda ba bango bakotika bendele mpe bakokima. Elobi bongo Yawe, oyo azali na móto o Sion mpe na fulu ya móto o Yeruzalem.