Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 51
Isai LinVB 51:1  Boyoka ngai, bino bato bokolukaka bosembo, bino bato bokolukaka Yawe. Botala ngomba ya mabanga esika boutaki, botala libulu lya mabanga esika babimisaki bino.
Isai LinVB 51:2  Botala Abarama tata wa bino, mpe Sara oyo abotaki bino. Azalaki se ye moko o ntango nabyangi ye, kasi nabenisi ye mpe nakomisi ye tata wa bana ebele.
Isai LinVB 51:3  Solo, Yawe ayokeli Sion mawa, na mpe ndako ya ye inso ibukani. Akokomisa eliki ya ye elanga ya Eden, mpe esobe ya ye paradizo ya Yawe. Kuna bakoyoka nsai, bakosepela, bakotondo Nzambe mpe bakoye­mba nzembo. Bosembo bwa Nzambe bokomonono
Isai LinVB 51:4  Bino bato ba ekolo ya ngai, boyoka ngai ; bino bato ba mboka ya ngai, bofongola matoi ! Mpamba te, Mobeko mouti na ngai, mpe bosembo bwa ngai bokozala mwinda mwa bato banso.
Isai LinVB 51:5  Na mbalakaka bosembo bwa ngai bokoya, libiki lya ngai likobima, na loboko la ngai nakosambisa ba­to ba bikolo. Bato ba bisanga bakotia mitema na ngai, bakotia elikya na loboko la ngai.
Isai LinVB 51:6  Botombola miso epai ya likolo, na nsima bokitisa miso mpe botala nse : likolo likolimwa lokola molinga, mpe mokili mokobeba lokola ela­mba eumeli, bato bafandi wana bakokufa lokola nsili. Kasi bosembo bwa ngai bokoumela seko mpe libiki lya ngai likosila mokolo moko te.
Isai LinVB 51:7  Bino bato boyebi bosembo, boyoka ngai, bino bato bokondimaka mobeko mwa ngai na motema moko, bobanga matumoli ma bato te, boyoka nsomo te soko batuki bino.
Isai LinVB 51:8  Zambi mbombo ikolia bango lokola ikoliaka bilamba, mpe nyama ike ikosilisa bango lokola ikoliaka ntokia. Kasi bosembo bwa ngai bokoumela seko mpe libiki lya ngai likosila mokolo moko te.
Isai LinVB 51:9  E loboko la Yawe, bima mpe lakisa nguya ya yo, omilakisa lokola o mikolo mya kala. Yo moto opasolaki Rakab te ? Yo moto otubolaki ebuki ya nga­ndo te ?
Isai LinVB 51:10  Yo moto okaukisaki mai ma Mbu Enene, yo moto opasolaki nzela o kati ya mbu mpo ya kolekisa wana bato baye osikolaki.
Isai LinVB 51:11  Baye Yawe abikisi bakozonga, bakoya o Sion, bakoganga na nsai, bakoyoka esengo nsuka te, bakotonda na esengo mpe na nsai, bakoyoka mpasi lisusu te, bakomilela lisusu te.
Isai LinVB 51:12  Ngai moko nakobondoko bino. Yo ozali nani mpo te obanga moto mpamba, mwana wa bato, oyo akolimwa lokola lititi ?
Isai LinVB 51:13  Bokobosana nde Yawe, Mozalisi wa bino, oyo atandi likolo mpe akeli mokili ? Bokolenge nde ntango inso mpo ya nkanda ya monyokoli, oyo alingi se kobebisa. Nkele ya monyokoli ekei wapi ?
Isai LinVB 51:14  Etikali moke batika moto oyo aka­ngemi, akokufa o libulu te, mpe akozanga bilei te.
Isai LinVB 51:15  Ngai nazali Yawe, Nzambe wa bino, oyo akotambwisaka mai mpe akongalisaka mbonge. Nkombo ya ngai, Yawe wa bokasi bonso.
Isai LinVB 51:16  Natii maloba ma ngai o monoko mwa bino, nabombi bino o ntei ya loboko la ngai ; natandi likolo mpe nakeli mokili mwa sika, nalobi na Sion : Yo ozali ekolo ya bato ba ngai.
Isai LinVB 51:17  Longwa o mpongi, lamuka mpe teleme, Yeruzalem ! Yawe amelisi yo nkeni ya nkanda ya ye, omeli nkeni ya nsomo mpe osilisi inso nye.
Isai LinVB 51:18  Moko te wa bana baye ye aboti akambi ye, moko te wa baye ye abokoli asi­mbi ye na loboko.
Isai LinVB 51:19  Makambo maye mabale ma mpasi makweli yo, kasi moto moko ayokeli yo mawa te. Babotoli mpe babebisi ekolo ya yo, oyoki nzala to okufi na mopanga, kasi nani abondi yo ?
Isai LinVB 51:20  Bana ba yo balembi mpe balali o nsuka ya balabala inso, lokola mboloko ekangemi o motambo, balangwi na nkanda ya Yawe, na bokaneli bwa Nzambe wa yo.
Isai LinVB 51:21  Yango wana, yoka naino likambo, yo mboka ya mawa, olangwi, kasi mpo ya vino te.
Isai LinVB 51:22  Mokonzi wa yo, Yawe Nzambe wa yo, mobateli wa ekolo ya yo, alobi boye : Nkeni eye ya bolangwi nakolo­ngola yango o loboko la yo, okomele nkeni ya nkele ya ngai lisusu te.
Isai LinVB 51:23  Nakotia nkeni eye o maboko ma banyokoli, baye balobaki na yo : « Lala o nse mpo biso toleka ! » Bongo bokomisaki mokongo mwa bino lokola nzela, lokola balabala mpo ’te bakoka ko­leka.