Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 28
Isai LinVB 28:1  Mawa na bino, bilombe ba balangwa ba Efraim, bokomi lokola fulele kitoko isili ikauki o ngomba likolo lya lo­bwaku lonzenga, itiami o mitó mya bato balangwi vino.
Isai LinVB 28:2  Tala Mokonzi akotinda elombe, moto wa nguya enene, lokola mbula ya matandala, lokola ekumbaki ekobebisaka, lokola mpela enene mpenza : akobwaka bango o nse na nguya enene.
Isai LinVB 28:3  Bato bakonyata bango na makolo, bilombe ba lolendo, balangwi ba Efraim ;
Isai LinVB 28:4  bakosala na fulele eye esila kitoko, eye ezalaki o likolo lya lobwaku lonzenga, lokola na mbuma ya figi eteli noki : moto amoni yango, akobuka mpe akolia yango.
Isai LinVB 28:5  O mokolo mona Yawe wa bokasi bonso akozala enkoti enzenga ya lokumu ya bato ba ye batikali.
Isai LinVB 28:6  Akolakisa bosembo na baye bakosambaka makambo, akozala bokasi bwa baye bakobe­ngana banguna kin’o bizibeli bya mboka.
Isai LinVB 28:7  Banganga Nzambe na baprofeta balangwi masanga, bakomi kodingbadingba mpo bameli lotoko mingi, masanga mabebisi mayele ma bango. O ntango bakomonoko bimonela, mayele makimi, o ntango bakokataka makambo, mayele matamboli.
Isai LinVB 28:8  Meza inso itondi na biloko basanzi, bisika binso bikomi na bosoto. Bakanisi :
Isai LinVB 28:9  « Ye Izaya alingi koteya nani, to kolimbola mango na nani ? Na bana baye balongoli o mabéle se sika ? »
Isai LinVB 28:10  Akolobaka bobele : « Yaka awa, ke­nde kuna, mobeko awa, mobeko kuna ; eti­nda awa, etinda kuna, kopekisa awa, kopekisa kuna. »
Isai LinVB 28:11  Ya solo, Mokonzi alobi na bato ba ekolo eye na mbebu ikokekuma mpe na lokota la bampaya.
Isai LinVB 28:12  Alobaki na bango : « Boya awa, oyo alembi apema awa, eye ezali solo esika ya kimia. » Kasi balingaki koyoka te.
Isai LinVB 28:13  Yango wana Yawe akoloba na bango boye : « Yaka awa, kende kuna ; mobeko awa, mobeko kuna, etinda awa, etinda kuna, kopekisa awa, kopekisa kuna. » Yango wana o ntango bakota­mbola, bakokweya makalekale, bakobukana makolo, bakokoto o motambo mpe bakokangema wana.
Isai LinVB 28:14  Sikawa boyoka maloba ma Yawe, bino bato boyebi se koloba maloba ma koseke, bino bayangeli ba ekolo eye ya Yeruzalem.
Isai LinVB 28:15  Bolobaki : « Biso tokati bondeko na liwa, toyokani na baye bazali o mboka ya bawa. Mokolo mpasi ekokwela mokili, ekosala biso eloko te, mpo lokuta lokomi esika biso tokobikaka, mpe tokoki kobombama na maloba ma bokosi. »
Isai LinVB 28:16  Nzokande Yawe Nzambe alobi boye : Nakotia o Sion libanga likoku­mba ndako, libanga lileki makasi, libanga lya motuya, liye bakotiaka o nse ya ndako. Oyo akotia motema na lyango, akokweya te.
Isai LinVB 28:17  Nakokamata bosolo bo emekeli ya bolai, bosembo bokozala lokola nsinga ya batongi ndako. Kasi mbula ya matandala ekolo­ngola lokuta loye lobikisaki bino, mpe mai ma mbula makozindisa embombamelo ya bino.
Isai LinVB 28:18  Mokolo mona bondeko bokataki na liwa, bokokufa, boyokani bwa bino na bato ba mboka ya bawa bokosila : Ntango mpasi ekokwela mokili, ekonyata bino.
Isai LinVB 28:19  Mbala inso ekoya, ekokanga bino ; ekokwela bino mikolo minso, butu moi. Koyoka ntina ya nsango eye ekoyokisa nsomo.
Isai LinVB 28:20  Mbeto ekoleka mokuse mpo ya kolala wana, bolangiti bokozala moke mpo ya komizipa na bwango.
Isai LinVB 28:21  Solo, Yawe akobima lokola o ngo­mba Perasim, akolenge na nkanda lokola o lo­bwaku la Gabaon, o mokolo akobanda kosala mosala mwa ye, moye mokokamwisa bato.
Isai LinVB 28:22  Bongo botika koseke, mbele minyololo mikokanga bino makasi. Mpamba te, Yawe Nzambe wa bo­kasi bonso ayebisi ngai ’te akani koboma ekolo mobimba.
Isai LinVB 28:23  Botia matoi mpe boyoka lolaka la ngai, bokanisa malamu mpe bondima maloba ma ngai.
Isai LinVB 28:24  Moto wa bilanga akotimolaka mabelé ntango inso ? Mosala mwa ye se kokata bilanga mpe kolalisa mabelé na nkanya ?
Isai LinVB 28:25  Ebongisi mpe elalisi ye mabelé, akobwaka mboto ya ngaingai mpe ya bitekuteku, akolona mbuma ya mampa na loso o milongo, mpe mbuma ya masangu o ndelo ya bilanga.
Isai LinVB 28:27  Bakotutaka mbuma ya ngaingai o eboka te, bakonyataka mbuma ya bitekuteku na yika ya likalo te. Kasi bakobeteke mbuma ya ngai-ngai na nzete mpe mbuma ya bitekuteku na li­ngenda.
Isai LinVB 28:28  Bakonikaka nde mbuma ya mampa ? Bakonyatanyata yango mpe te, kasi bakobete yango na mayele : bakolekisa farasa na yika ya likalo, kasi bakokeba ’te mbuma inikama te.
Isai LinVB 28:29  Yango mpe ezali likabo lya Yawe wa bokasi bonso, ye azali na malako malamu mpe na bwanya mingi.