ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 28
Isai | LinVB | 28:1 | Mawa na bino, bilombe ba balangwa ba Efraim, bokomi lokola fulele kitoko isili ikauki o ngomba likolo lya lobwaku lonzenga, itiami o mitó mya bato balangwi vino. | |
Isai | LinVB | 28:2 | Tala Mokonzi akotinda elombe, moto wa nguya enene, lokola mbula ya matandala, lokola ekumbaki ekobebisaka, lokola mpela enene mpenza : akobwaka bango o nse na nguya enene. | |
Isai | LinVB | 28:4 | bakosala na fulele eye esila kitoko, eye ezalaki o likolo lya lobwaku lonzenga, lokola na mbuma ya figi eteli noki : moto amoni yango, akobuka mpe akolia yango. | |
Isai | LinVB | 28:5 | O mokolo mona Yawe wa bokasi bonso akozala enkoti enzenga ya lokumu ya bato ba ye batikali. | |
Isai | LinVB | 28:6 | Akolakisa bosembo na baye bakosambaka makambo, akozala bokasi bwa baye bakobengana banguna kin’o bizibeli bya mboka. | |
Isai | LinVB | 28:7 | Banganga Nzambe na baprofeta balangwi masanga, bakomi kodingbadingba mpo bameli lotoko mingi, masanga mabebisi mayele ma bango. O ntango bakomonoko bimonela, mayele makimi, o ntango bakokataka makambo, mayele matamboli. | |
Isai | LinVB | 28:9 | « Ye Izaya alingi koteya nani, to kolimbola mango na nani ? Na bana baye balongoli o mabéle se sika ? » | |
Isai | LinVB | 28:10 | Akolobaka bobele : « Yaka awa, kende kuna, mobeko awa, mobeko kuna ; etinda awa, etinda kuna, kopekisa awa, kopekisa kuna. » | |
Isai | LinVB | 28:11 | Ya solo, Mokonzi alobi na bato ba ekolo eye na mbebu ikokekuma mpe na lokota la bampaya. | |
Isai | LinVB | 28:12 | Alobaki na bango : « Boya awa, oyo alembi apema awa, eye ezali solo esika ya kimia. » Kasi balingaki koyoka te. | |
Isai | LinVB | 28:13 | Yango wana Yawe akoloba na bango boye : « Yaka awa, kende kuna ; mobeko awa, mobeko kuna, etinda awa, etinda kuna, kopekisa awa, kopekisa kuna. » Yango wana o ntango bakotambola, bakokweya makalekale, bakobukana makolo, bakokoto o motambo mpe bakokangema wana. | |
Isai | LinVB | 28:14 | Sikawa boyoka maloba ma Yawe, bino bato boyebi se koloba maloba ma koseke, bino bayangeli ba ekolo eye ya Yeruzalem. | |
Isai | LinVB | 28:15 | Bolobaki : « Biso tokati bondeko na liwa, toyokani na baye bazali o mboka ya bawa. Mokolo mpasi ekokwela mokili, ekosala biso eloko te, mpo lokuta lokomi esika biso tokobikaka, mpe tokoki kobombama na maloba ma bokosi. » | |
Isai | LinVB | 28:16 | Nzokande Yawe Nzambe alobi boye : Nakotia o Sion libanga likokumba ndako, libanga lileki makasi, libanga lya motuya, liye bakotiaka o nse ya ndako. Oyo akotia motema na lyango, akokweya te. | |
Isai | LinVB | 28:17 | Nakokamata bosolo bo emekeli ya bolai, bosembo bokozala lokola nsinga ya batongi ndako. Kasi mbula ya matandala ekolongola lokuta loye lobikisaki bino, mpe mai ma mbula makozindisa embombamelo ya bino. | |
Isai | LinVB | 28:18 | Mokolo mona bondeko bokataki na liwa, bokokufa, boyokani bwa bino na bato ba mboka ya bawa bokosila : Ntango mpasi ekokwela mokili, ekonyata bino. | |
Isai | LinVB | 28:19 | Mbala inso ekoya, ekokanga bino ; ekokwela bino mikolo minso, butu moi. Koyoka ntina ya nsango eye ekoyokisa nsomo. | |
Isai | LinVB | 28:20 | Mbeto ekoleka mokuse mpo ya kolala wana, bolangiti bokozala moke mpo ya komizipa na bwango. | |
Isai | LinVB | 28:21 | Solo, Yawe akobima lokola o ngomba Perasim, akolenge na nkanda lokola o lobwaku la Gabaon, o mokolo akobanda kosala mosala mwa ye, moye mokokamwisa bato. | |
Isai | LinVB | 28:22 | Bongo botika koseke, mbele minyololo mikokanga bino makasi. Mpamba te, Yawe Nzambe wa bokasi bonso ayebisi ngai ’te akani koboma ekolo mobimba. | |
Isai | LinVB | 28:24 | Moto wa bilanga akotimolaka mabelé ntango inso ? Mosala mwa ye se kokata bilanga mpe kolalisa mabelé na nkanya ? | |
Isai | LinVB | 28:25 | Ebongisi mpe elalisi ye mabelé, akobwaka mboto ya ngaingai mpe ya bitekuteku, akolona mbuma ya mampa na loso o milongo, mpe mbuma ya masangu o ndelo ya bilanga. | |
Isai | LinVB | 28:27 | Bakotutaka mbuma ya ngaingai o eboka te, bakonyataka mbuma ya bitekuteku na yika ya likalo te. Kasi bakobeteke mbuma ya ngai-ngai na nzete mpe mbuma ya bitekuteku na lingenda. | |
Isai | LinVB | 28:28 | Bakonikaka nde mbuma ya mampa ? Bakonyatanyata yango mpe te, kasi bakobete yango na mayele : bakolekisa farasa na yika ya likalo, kasi bakokeba ’te mbuma inikama te. | |