ISAIAH
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24
25
26
27
28
29
30
31
32
33
34
35
36
37
38
39
40
41
42
43
44
45
46
47
48
49
50
51
52
53
54
55
56
57
58
59
60
61
62
63
64
65
66
Chapter 6
Isai | LinVB | 6:1 | O mobu mokonzi Ozia awei, namoni Yawe afandi o ngwende enene, alati elamba elai elali o mabelé ma Tempelo. | |
Isai | LinVB | 6:2 | Baserafim batelemi likolo lya ye. Moko moko azalaki na mapapu motoba : mabale ma bozipi elongi, mabale ma bozipi makolo, mabale ma bopimbwi. | |
Isai | LinVB | 6:3 | Bazalaki kobelelana : « Yo mosantu, yo mosantu, yo mosantu, yo Yawe wa bokasi bonso ; nse mobimba etondi na nkembo ya yo ! » | |
Isai | LinVB | 6:4 | Awa bazalaki koganga bongo, makonzi ma bizibeli mabandi koningana mpe Tempelo mobimba etondi na milinga. | |
Isai | LinVB | 6:5 | Nalobi : « Mawa na ngai, nasuki e ! Mpamba te, ngai moto wa monoko mbindo nafandi o kati ya bato bazali na monoko mbindo, mpe miso ma ngai mamoni Mokonzi Yawe wa bokasi bonso. » | |
Isai | LinVB | 6:6 | Serafim moko apimbwi epai ya ngai, o maboko azalaki na likala lya móto liye akamati o altare na lingato. | |
Isai | LinVB | 6:7 | Atii lyango o mbebu ya monoko mwa ngai, alobi : « Awa likala liye lisimbi mbebu ya yo, lisumu lya yo lilongwi, mabe ma yo malimbami. » | |
Isai | LinVB | 6:8 | Na nsima nayoki maloba ma Yawe, atuni : « Natinda nani ? Nani akozala ntoma wa ngai ? » Nayanoli ye : « Ngai oyo, tinda ngai. » | |
Isai | LinVB | 6:9 | Alobi na ngai : « Kende koloba na bato boye : Matoi bokofongola, kasi bokososola te ; miso bokotala, kasi bokomono te. | |
Isai | LinVB | 6:10 | Okomisa mitema mya bato baye lokola libanga, zipa matoi ma bango, kanga miso ma bango. Bongo bamono na miso te, bayoka na matoi te ! Mitema mya bango miyeba ntina te ! Bongo babongola mitema te, mpe babika te ! » | |
Isai | LinVB | 6:11 | Natuni : « E Mokonzi, mikolo boni makambo maye makoumela ? » Azongiseli ngai : « Tee bingumba binso bikokufa, tee bato banso bakokima mboka mpe ndako ya bango, tee mabelé ma bango makobeba mpe makokoma mopotu, | |
Isai | LinVB | 6:12 | tee Yawe akobengana bato mpe mokili mwa bango mokokoma mpamba mpe mokozala na bato lisusu te. | |