Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ISAIAH
Prev Up Next
Chapter 6
Isai LinVB 6:1  O mobu mokonzi Ozia awei, namoni Yawe afandi o ngwe­nde enene, alati elamba elai elali o mabelé ma Tempelo.
Isai LinVB 6:2  Baserafim batelemi likolo lya ye. Moko moko azalaki na mapapu motoba : mabale ma bozipi elongi, mabale ma bozipi makolo, mabale ma bopimbwi.
Isai LinVB 6:3  Bazalaki kobelelana : « Yo mosantu, yo mosantu, yo mosantu, yo Yawe wa bokasi bonso ; nse mobimba etondi na nkembo ya yo ! »
Isai LinVB 6:4  Awa ba­zalaki koganga bongo, makonzi ma bizibeli mabandi koningana mpe Te­mpelo mobimba etondi na milinga.
Isai LinVB 6:5  Nalobi : « Mawa na ngai, nasuki e ! Mpamba te, ngai moto wa monoko mbindo nafandi o kati ya bato bazali na monoko mbindo, mpe miso ma ngai mamoni Mokonzi Yawe wa bokasi bonso. »
Isai LinVB 6:6  Serafim moko apimbwi epai ya ngai, o maboko azalaki na likala lya móto liye akamati o altare na lingato.
Isai LinVB 6:7  Atii lya­ngo o mbebu ya monoko mwa ngai, alobi : « Awa likala liye lisimbi mbebu ya yo, lisumu lya yo lilo­ngwi, mabe ma yo malimbami. »
Isai LinVB 6:8  Na nsima nayoki maloba ma Yawe, atuni : « Natinda nani ? Nani akozala ntoma wa ngai ? » Nayanoli ye : « Ngai oyo, tinda ngai. »
Isai LinVB 6:9  Alobi na ngai : « Kende koloba na bato boye : Matoi bokofongola, kasi bokososola te ; miso bokotala, kasi bokomono te.
Isai LinVB 6:10  Okomisa mitema mya bato baye lokola libanga, zipa matoi ma ba­ngo, kanga miso ma bango. Bongo bamono na miso te, bayoka na matoi te ! Mitema mya ba­ngo miyeba ntina te ! Bongo babongola mitema te, mpe babika te ! »
Isai LinVB 6:11  Natuni : « E Mokonzi, mikolo boni makambo maye makoumela ? » Azongiseli ngai : « Tee bingumba binso bikokufa, tee bato banso bakokima mboka mpe ndako ya bango, tee mabelé ma bango makobeba mpe makokoma mopotu,
Isai LinVB 6:12  tee Yawe akobengana bato mpe mokili mwa bango mokokoma mpamba mpe mokozala na bato lisusu te.
Isai LinVB 6:13  Mpe soko yoko ya zomi ya bato batikali, bango mpe bakosila lokola ekumu etikali ntango basili kokata gbukulu na wenge. Ekumu eye ekozala mboto esantu. »